Ntango Batatoli ya Yehova bayei kotala yo
Bakatolike basengeli kosala nini ntango Batatoli ya Yehova bayei kotala bango na ndako na bango? Mokanda moko ya sika euti kobongisama na Biro ya mateya ya Lisangani ya baepiskɔ́pɔ ya ekólo Italie elobi ete: “Koboya kosolola na bango na boboto nyonso, kasi na bolɛmbu mpe te, ezali soko moke te kozanga bolingo.”
Bakatolike nyonso te bazali kondima likanisi wana, lokola emonisami na nkomá oyo mobali moko ya engumba Foggia, na ekólo Italie atindaki na zulunalo Gazzetta del Mezzogiorno, alobaki ete:
“Nazali Motatoli ya Yehova te. Nazali Mokatolike. Kasi nazali kokamwa na mibeko mosusu oyo lingomba ezali kotyela bandimi, koyebisáká bango ete bátya mayebisi na bikuke na bango mpo na kobengana Batatoli ya Yehova. Soki totali malamu, bato yango bazali bobele kosakola Liloba ya Nzambe, mpe bazali kosalisa bato mosusu ete bázala na boyebi mingi ya Biblia. Malako yango ya koboya Batatoli ya Yehova ezali kokundwela ngai ntango oyo choléra epalanganaki na ekólo Italie mpe tozalaki kopesamela toli mpo na kopɛngola kozwa bokɔnɔ yango.
“Mpo na ngai, yango ezali komonisa ete lingomba ezali kotya mobeko na yango moko kozanga kotalela mposa ya bandimi. Kasi uta mwa bambula, nazali komona mpe bakatolike kokende ndako na ndako, kotaláká ata Batatoli ya Yehova na bandako na bango; mpe bazali koyamba bango, bazali kosolola na bango, bazali koboya ata moto moko te.”
Batatoli ya Yehova bandimisaka bato nsango na bango na makasi te. Nzokande, bazali kosala molende ya koyebisa na bato mosusu elikya oyo emonisami kati na Liloba ya Nzambe oyo bango moko basili komona ete ezali kobɔndisa na eleko oyo ya yikiyiki. Na kokendáká ndako na ndako, mpe lisusu na kosololáká na bato oyo bazali kokutana na bango na balabála, Batatoli ya Yehova bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe epai ya baoyo basepeli koyoka yango.—Matai 24:14; Misala 5:42; 17:17.