‘Bazali sembo na mateya ya lingomba na bango’
MWASI moko na engumba Miami, na etúká ya Floride, na États-Unis, atindaki nkomá oyo elandi na zulunalo moko ya engumba na bango: “Na mokolo ya 10 Desɛ́mbɛ bayibaki potɔmɔni ya mwana na ngai ya mobali na libenga na ye ntango azalaki na zando. Kati na yango ezalaki na mikanda na ye lokola kálati ya ndingisa ya kotambwisa motuka (permis de conduire), kálati ya sécurité sociale, mpe bongo na bongo, bakisa mpe mosolo dolare 260.
“Nsima ya kopesa lapólo epai ya nkolo-mosala na ye ete abungisaki biloko wana, azongaki na ndako. Na mpokwa, mwasi moko alobaka lokóta Espagnole abéngaki ye na telefone, na lisalisi ya mosali ya kompanyi ya telefone mpo na kobongola maloba na ye na Lingelesi, ayebisaki ye ete alɔkɔtaki potɔmɔni na ye.
“Apesaki adresi na ye. . . . Apesaki ye potɔmɔni na ye oyo ezalaki na biloko nyonso, bakisa mpe dolare 260 oyo ezalaki na kati.
“Amonaki moyibi kobenda potɔmɔni na ye mpe angangaki. Moyibi abwakaki potɔmɔni yango mpe akimaki. Kasi na ntango yango amonaki lisusu mwana na ngai te, na yango akendaki na potɔmɔni yango na ndako na ye mpe abéngaki na telefone.
“Ye na libota na ye bazali Batatoli ya Yehova. Na ntembe te bazali sembo na mateya ya lingomba na bango.”
Batatoli ya Yehova bamonisaka bosembo mpo na kozwa lokumu epai ya bato te. (Baefese 6:7) Nzokande, bazali na mposa makasi ya kopesa lokumu epai ya Tata na bango ya likoló, Yehova. (1 Bakolinti 10:31) Bolingo na bango mpo na Nzambe mpe mpo na bazalani na bango ezali kopusa bango na kosakola “nsango malamu” ya Bokonzi ya Nzambe. (Matai 24:14) Nzambe alaki ete akokómisa mabelé paladiso moko kitoko na nzela ya Bokonzi. Na ntango yango mabelé makozala esika kitoko bobele na ezingelo te kasi lisusu mpo na bizaleli malamu ntango bato ya sembo bakotonda wana mpo na libela.—Baebele 13:18; 2 Petelo 3:13.