Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 15/5 lok. 21
  • Kolongobana: Likambo ya nkɔnzɔ to ya liponi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kolongobana: Likambo ya nkɔnzɔ to ya liponi?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini kokende epai ya monganga ya mino?
    Lamuká!—2007
  • Zwá motema oyo ekosepelisa Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Batelá mino na yo mpo osɛkaka malamu
    Lamuká!—2006
  • Ozali na ‘motema moko mpo na koyeba’ Yehova?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 15/5 lok. 21

Kolongobana: Likambo ya nkɔnzɔ to ya liponi?

“ATAKO na motema na ngai mpenza nazali molongobani te, ntango mosusu nazalaka na ezalela ya kolongobana sé na nkɔnzɔ.” Wana ezali maloba ya Autolycus, moto ya mayele mabe kati na lisano ebéngami The Winter’s Tale ya William Shakespeare. Maloba yango mazali komonisa bolɛmbu moko monene ya bomoto​—mposa na biso ya kosala mabe, oyo euti na ‘motema ya bokosi.’ (Yilimia 17:9; Nzembo 51:5; Baloma 5:12) Kasi yango elingi koloba ete tozali na liponi te na likambo yango? Bomoto ya malamu ezali bobele likambo ya nkɔnzɔ? Soko moke te!

Liboso ete bana ya Yisalaele bákɔta na Mokili ya Ndaka, Mose alobaki na bango wana batongaki molako na bango na mokili patátálú ya Moaba. Atyaki liboso na bango maponi mibale ya polele. Bakokaki kopona kotosa mibeko ya Nzambe mpe kozwa mapamboli na ye to koboya kotosa yango mpe na bongo kobuka mbuma ya bololo euti na lisumu. (Deteronome 30:15-20) Bango nde basengelaki kopona.

Lokola tozali na bonsomi, biso mpe tozali na liponi ya kosala. Moto moko te​—ata Nzambe⁠—​azali kotindika biso na makasi ete tósala makambo malamu to makambo mabe. Nzokande, na elónga mpenza, basusu bakoki kotuna ete, ‘Soki mitema na biso mizali ntango nyonso kokanisa mabe, ndenge nini tokoki kosala oyo ezali malamu?’ Tókanisa naino, monganga ya míno atalatalaka míno mpo na koluka ebandeli ya kopɔla to mpe mbeba liboso ete ekóma mabe koleka. Ndenge moko, tosengeli kotala na bozindo ya motema na biso ya elilingi mpo na koluka bolɛmbu to mpe mbeba ya bizaleli. Mpo na nini? Mpamba te Yesu alobaki ete “uta na motema ekobima makanisi mabe, libomi koboma moto, ekobo, pite, boyibi, litatoli na lokuta, kotuka.”​—Matai 15:18-20.

Mpo na kobatela líno, monganga asengeli kopikola mpenza mbeba nyonso oyo emonani. Lolenge moko, biso mpe tosengeli mpenza kosala na molende nyonso mpo na kopɛtola motema na biso na “makanisi mabe” mpe mposa mabe. Na kotángáká mpe komanyoláká Biblia, Liloba ya Nzambe, tokokóma na boyebi ya banzela ya Mozalisi na biso mpe tokoyekola kosala oyo ezali sembo.​—Yisaya 48:17.

Davidi, Mokonzi ya Yisalaele asalelaki lisungi mosusu ya ntina mpo na kolónga etumba mpo na kosala oyo ezali sembo. Abondelaki ete: “Ɛ Nzambe, zaliselá ngai motema na pɛto, mpe pesá ngai [elimo, NW] na sika na boyengebene kati na ngai.” (Nzembo 51:10) Ɛɛ, na kotyáká motema mobimba epai na Yehova Nzambe, biso mpe tokoki kolónga mposa na biso ya kosala oyo ezali mabe mpe kolóna “elimo ya sika” mpo na kosala malamu. Na lolenge yango, tokotika te ete kolongobana ezala likambo ya nkɔnzɔ. Ekozala nde likambo ya liponi.

[Elilingi na lokasa 21]

Lokola Davidi, kobondela Yehova ekoki kosalisa biso na kosala oyo ezali malamu

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto