Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 15/5 lok. 32
  • ‘Nakokima epai na Nzambe’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Nakokima epai na Nzambe’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 15/5 lok. 32

‘Nakokima epai na Nzambe’

KOMEKAMA mpe bopusi mabe ezali sé kobakisama na ‘ntango oyo na mpasi.’ Na ndakisa, bosembo na biso ekoki komekama na esika ya mosala. Etamboli na biso ya koboya misala ya mbindo ekoki komekama ntango tozali elongo na baninga na biso ya kelasi. Mpe bosembo na biso ezali mbala mingi komekama na mokili oyo etondi na bizaleli mabe.​—2 Timoté 3:1-5.

Asafa, mokomi moko ya Biblia, ye mpe azalaki na bomoi na eleko oyo mabe ekolaki mingi. Kútu, bamoko na bato ya eleko na ye bazalaki komikumisa na ntina na etamboli na bango ya kozanga kobanga Nzambe. Asafa akomaki ete “nzombo ekangi bango lokola minyɔlɔ́lɔ, yauli ezali pelamoko elamba oyo ekozipaka bango. Bakotuka mpe bakoloba mabe mpo na konyokola na bango; bakolobaka mpe na nzombo.” (Nzembo 73:6, 8) Ozali komona ezaleli wana mingi?

Mpo na baoyo balingi kosala oyo ezali sembo, etamboli motindo wana ezali mpenza kopesa mpasi, ata kolɛmbisa. Asafa amilelaki ete “ngai nazali kotungisama mokolo na mokolo, . . . epesaki makanisi na ngai mpasi mingi.” (Nzembo 73:14, 16) Yo mpe okoki koyoka lolenge yango, kasi kobungisa elikya te! Asafa azalaki na likoki ya koyikela mabe ya eleko na ye mpiko, yo mpe okoki kosala lolenge yango. Kasi ndenge nini?

Asafa akómaki na bososoli ete boyengebene ya solo ekoki komonana te na boyangeli ya bato ya kozanga kokoka. (Nzembo 146:3, 4; Masese 17:23) Na yango, na esika ya kolekisa ntango na ye, nguya na ye, mpe makoki na ye, na komekáká kosilisa mabe oyo ezalaki zingazinga na ye, atyaki likebi na ye likoló ya boyokani na ye elongo na Nzambe. Asafa alobaki boye: “Kasi mpo na ngai, ezali malamu ete nabɛlɛma na Nzambe, nasili kotya elikya na ngai kati na Nkolo [Yehova].”​—Nzembo 73:28.

Lelo oyo, baoyo bazali komipesa na misala ya mimbongo mizangi kolongobana mbala mingi bazali na biloko mingi ya mosuni. Kútu, mingi bazali komikumisa na ndenge bazali kotyola mibeko ya Nzambe oyo mitali bizaleli malamu. Kasi bolóngi na bango ekozala mpo na libela te. Asafa alobaki ete “solo otyaki bango na nzela na mosɛlu; yo obwaki bango na mobulu.”​—Nzembo 73:18.

Ɛɛ, na ntango oyo Nzambe asili kokana, kobuba, mobulu, mpe kanyaka, bakisa mpe misala nyonso mosusu oyo mizali komonisa kozanga bobángi Nzambe, oyo baklisto basengeli kopɛngola yango, ekolongolama. Biblia elaki ete: “Basáli na mabe bakosuka, nde baoyo bakozilaka [Yehova] bakosangola mokili.” (Nzembo 37:9) Na kozeláká, tiká ete tózongela maloba ya mokomi na nzembo oyo alobaki ete: “[Yehova] azali libanga na ngai mpe esika makasi na ngai mpe mobikisi na ngai, Nzambe na ngai, libanga na ngai oyo nakokima epai na ye.”​—Nzembo 18:2.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto