Kokumba ekanganelo na ntango ya bolenge
BILENGE bazali kokutana na mikakatano makasi na “ntango na mpasi” oyo. (2 Timoté 3:1) Mokolo na mokolo bazali koyoka maloba oyo mazali kolendisa kosala pité, komela likaya, mpe lolenge mosusu ya bizaleli oyo bizali kobebisa. Baoyo bazali kolanda mitindá ya Biblia bakoki kosɛka bango mpo ete bazali koboya kolanda etuluku, mpe baklisto mosusu bakoki kozala na liyoki ete makambo makozala pɛtɛɛ soki bandimi kosala lolenge oyo basusu bazali kosala.
Pene na nsuka ya ekeke ya nsambo L.T.B., Yilimia akomaki ete: “Ezali malamu na elenge ete akumba [ekanganelo] na ntango na bolenge na ye.” (Bileli 3:27) Alingaki koloba nini? Alingaki koloba ete koyekola koyika mpiko na mikakatano na ntango moto azali elenge ekobongisa ye mpo na kolónga mikakatano ya bomoi wana akokóma mokóló. Bampasi, atako ezalaka likambo ya esengo te, ekoki kopɛngolama te ezala mpo na mikóló to mpe bilenge baklisto. (2 Timoté 3:12) Kasi matomba ya kotikala sembo mazali mingi koleka lisungi nyonso ya ntango mokuse oyo kondima bopusi ya basusu ekoki kopesa.
Soki ozali elenge, bundá makasi etumba na kondima. Na ntango oyoki mposa ya komekola etamboli mabe, kopesa yango nzela te. Atako na ntango mosusu ekoki kozala mpasi na kosala bongo, na bomoi na yo okopɛngola mikakatano mingi. Yesu alakaki ete: “Bókamata ekanganeli na ngai likoló na bino . . . , bokozwa kopema mpo na milimo na bino. Mpo ete ekanganeli na ngai ezali na motau, mpe mokumba na ngai ezali na bozito te.”—Matai 11:29, 30.
Ndimá etumba ya komitambwisa engebene mitindá ya Biblia. Na kosaláká bongo okozala na lolenge malamu ya bomoi mpo na sikawa mpe elikya ya solosolo mpo na mikolo mizali koya. Lokola Biblia elobi, “mokili ezali mpe kolongwa mpe na mposa mabe na yango lokola, nde ye oyo akosalaka mokano na Nzambe akoumelaka seko.”—1 Yoane 2:17.