Makambo Motindo Oyo Makosila Mokolo Mosusu?
EPAI nyonso tokokende lelo oyo, tokomona makambo ya kowelana, ya matáta, mpe bitumba. Kasi, mokano ya zulunalo oyo ezali te ya kobakisela yo bansango mosusu ya mabe likoló na oyo oyebi. Kútu, nimero oyo ekolakisa yo basolo ata mibale ya kobɔndisa. Ya liboso ezali ete: bisakweli bilobamaki kalakala na Biblia biyebisaki mpenza ebele ya bansango mabe oyo tozali koyoka na ekeke na biso; ya mibale ezali ete: bobele búku yango ya bisakweli, Biblia, ezali kosakola kosilisama ya makambo lokola oyo omoni na elilingi oyo. Bitumba bikozala lisusu te. Babɔmbi ekozala lisusu te, banguna oyo bazali kobɛta masasi uta na bisika ya nkuku bakozala lisusu te, bamine oyo ekundamá na nsé ya mabelé ekozala lisusu te, to mpe mosala ya banganga-mobulu. Bitiké oyo bazali konyokwama to mpe bato bakimá mboka oyo bazali koyengayenga bakozala lisusu te. Mokili ekotonda na kimya ya solosolo mpe oyo ekokitisa motema. Okosepela komona eleko wana na miso na yo? Boye, tolendisi yo ete otyá likebi na oyo Biblia ezali koloba. Kati na búku yango, okoki kozwa libɔndisi oyo okanisaki ata mokolo moko te ete ekoki kozwama.