Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 1/4 nk. 30-31
  • Libala ya mbula 403 likómi na mikakatano

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Libala ya mbula 403 likómi na mikakatano
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 1/4 nk. 30-31

Libala ya mbula 403 likómi na mikakatano

NA MBOKA Suède, Lingomba mpe Letá ezalaki na boyokani makasi na boumeli ya mbula koleka 400. Sikawa ekanganeli ya libala kati na lingomba mpe guvernemá ekómi kolɛmba.

Lingomba ya Luther ekómaki lingomba ya Letá na mobu 1593, mpe mobotami nyonso ya mboka Suède asengelaki kozala mosangani oyo azwi batisimo kati na lingomba yango. Bambula mingi na nsima, na boumeli ya bambula 1850, mbongwana esalemaki. Ezalaki lisusu na ntina te ete babotami ya Suède bázwa batisimo; atako bongo, bazalaki ntango nyonso kotángama lokola basangani ya lingomba ya Luther. Na motindo yango, esɛngisamaki na bango ete báfuta 1 % ya mpako na bango mpo na kosunga lingomba mpe na kofuta mosolo mpo na misala mosusu ya mboka oyo lingomba ezali kokokisa. Eleki kala mingi te, mbongwana mosusu esili kokɔta. Bandá na mobu 1952, engebene mibeko, babotami ya mboka Suède bakokaki kolongwa na lingomba mpe na bongo kolongolama na lisɛngisi ya kofuta eteni monene ya mpako ya lingomba.

Uta mwa bambula, lingomba ya Luther ezali ntango nyonso kobungisa nguya na yango na mboka Suède. Yango ekokaki kopengolama te, mpamba te bafandi 10 likoló na monkámá na Suède bazali bato bautá na mboka mopaya mpe bazali basangani ya lingomba ya Luther te, kati na bango Bayuda, Bakatolike, mpe Bamizilmá. Na yango, na ebandeli ya mobu 1996, bobele bato 86 likoló na monkámá na Suède bazalaki basangani ya lingomba ya Luther, mpe motángo yango mozali sé kokita.

Bokoli ya ezaleli ya kozanga bosepeli ezali kosala bokabwani monene kati na Lingomba mpe Letá. Esilaki kolobama ete ezali lisusu lisɛngami te ete mokonzi ya mboka azala mosangani ya lingomba ya Luther, mpe bana oyo babotami na moboti moko oyo azali na lingomba ya Luther basengeli te kotángama mbala moko ete bazali basangani ya lingomba ya Luther, Lingomba ya Letá. Lisusu, engebene zulunalo The Dallas Morning News, bandá na mobu 2000, “Baparwási mpe Letá basengeli koyeba motuya nyonso mpe kokabola bitando minene ya mabelé oyo ezali sikawa na mabɔkɔ ya lingomba. Lingomba esengeli kokitisa motuya ya mosolo na yango ya mosala ya mbula moko oyo mozali sikawa na badolare miliare 1,68 oyo ndambo monene na yango ezali kouta na mpako oyo ezali kokongolama na Letá.” Nsima ya mobu 2000, lingomba ekobanda kopona baepiskɔ́pɔ yango moko.

Wana kozanga bosepeli mpe kokita ya motángo ya basangani ezali komonana kati na boklisto ya nkombo mpamba, Batatoli ya Yehova na Suède bazali sé kokola. Mokanda Annuaire des Témoins de Jéhovah 1997 emonisi ete ezali na basakoli ya Bokonzi ya Nzambe 24 487 na mokili yango, mpe pene na basakoli 10 likoló na monkámá bazali kosakola lokola baministre babongisi-nzela ya ntango nyonso. Mingi kati na bango bazali kozwa mabaku minene ya mosala. Na ndakisa, na boumeli ya mayangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova na 1995, babalani 40 batóndisaki nkasa ya bokɔti na Gileadi, eteyelo ya Biblia ya la Société Watch Tower mpo na kobongisama na mosala ya misionere. Na ntango yango, ezalaki na bato pene na 75, babotami ya Suède oyo basilaki kozwa mapɔlɔ́mi na bakelasi ya kala ya Gileadi oyo batindamaki mpo na mosala ya misionere na bamboka ndenge na ndenge na mokili. Na ntembe te, ndakisa malamu na bango mpe bankomá na bango ya kolendisa mpe lolenge bazali ntango mosusu kokende kotala bango ezali na bopusi ya malamu epai na baoyo bazali sikawa kolikya kozwa libaku monene wana ya mosala.

Na yango, wana bamilió ya basangani ya mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba bazali na nzala na elimo, Batatoli ya Yehova ‘bazali koyemba na ntina na esengo na motema.’​—Yisaya 65:13, 14.

[Karte na lokasa 30]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

Suède

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto