Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 15/3 lok. 24
  • Kosilisa bifundeli ya lokuta na France

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kosilisa bifundeli ya lokuta na France
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 15/3 lok. 24

Kosilisa bifundeli ya lokuta na France

NA MIKOLO miuti koleka, Batatoli ya Yehova na France bafundamaki na bifundeli mingi ya lokuta. Kosaleláká libaku ya makambo ya nsɔ́mɔ oyo matalelaki mangomba mikemike na Mpótó mpe na Japon, bipanzelo ya nsango ebimisaki makambo ya lokuta na ntina na Batatoli. Balobelamaki na lokuta nyonso ete bazali moko na mangomba mike oyo eleki kopalangana mpe ezali likámá monene.

Na molende oyo basalaki mpo na kosembola makambo, Batatoli ya Yehova babimisaki trakte moko oyo ezalaki koyanola na mituna lokola oyo: Batatoli ya Yehova bazali banani? Bazali baklisto? Bandimaka kozwa nkisi ya monganga? Mpo na nini basakolaka ndako na ndako? Bazwaka mosolo wapi mpo na kokokisa mosala na bango? Na makambo nini Batatoli ya Yehova bazali kopesa litomba na esika bafandi?

Trakte wana oyo ezali kolimbola makambo ekomamaki na Lifalansé mpe motó na likambo na yango ezalaki: Les Témoins de Jéhovah — ce que vous devez savoir. Mpo ete bato mingi bákoka kozwa trakte yango, kampanye ebongisamaki mpo na kokabola yango. Bandá na mwa 13 Máí kino mwa 9 Yúni 1996, koleka milió libwa ya nkasa yango ekabolamaki.

Trakte yango ekamwisaki bato mingi, bakisá mpe bakonzi ya Letá. Mokonzi moko ya Letá, nsima ya kotánga trakte yango akomaki ete: “Bifundeli oyo bizali kobimisama na ntina na Batatoli ya Yehova bizali kopesa ngai mawa mingi. Nazali mbala mingi kosepela na lolenge ya mosala na bino oyo mosalami na bolingo malamu mpe na kozanga koluka litomba ya moimi.” Na nkomá na ye mpo na komonisa makanisi na ye likoló ya trakte yango, mosangani moko ya Parlemá ya mikili ya Mpótó akomaki boye: “Motángo moleki monene ya bato bayebi malamu mpe bazali na likoki ya kokesenisa etuluku ya baklisto oyo bino bozali na mangomba mikemike.”

Na etúká ya Bretagne, Motatoli moko alakisaki trakte yango na sángó moko, oyo andimaki kozwa yango nokinoki. Sángó yango alobaki ete: “Nazali kopesa bino longonya mpo na oyo bozali kosala.” Bongo abakisaki ete: “Nazali kolendisa basangani ya parwási na ngai ete báyambaka bino na bandako na bango mpe bápesaka bino mwa kɔpɔ ya kafé. Bokoki ata koyebisa baye bokokutana na bango ete bozalaki na ndako na ngai. Lisusu, nalingi koyebisa bino ete nasepelaka mingi kotánga mikanda na bino.”

Nsima ya kozwa trakte yango, mobali moko, mosangani ya lingomba ya Protestá na etúká ya Alsace akomelaki la Société Watch Tower mpo na kosɛnga boyekoli ya Biblia. Akomaki ete: “Lokola nazali lisusu kotyela lingomba na ngai motema te, nazali koluka kobanda bomoi ya sika mpo na oyo etali makambo ya elimo.” Atako mbala na mbala bifundeli ya lokuta bizali kobimisama likoló na bango, Batatoli ya Yehova na France​—ɛɛ, na mokili mobimba​—bazali kolanda kosunga bato ete bázwa boyebi ya sikisiki ya mikano ya Nzambe, lokola emonisami kati na Biblia.​—2 Timoté 3:16, 17.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto