Mpo na kondimela Nzambe esengeli liboso komona likamwisi?
ALBERT azalaki na mibu koleka 20 ntango abandaki koluka Nzambe. Akɔtaki na mangomba mingi kasi mposa na ye ekokisamaki te. Na kotángáká biteni mosusu ya Biblia, amonaki lolenge oyo Nzambe azalaki na boyokani na bato lokola Noa, Abalayama, Sala mpe Mose. Albert akómaki kosepela na Nzambe ya Biblia. Nzokande, akokaki kondimisama mpenza ete Nzambe azali?
Mokolo moko na mpokwa, Albert akendaki ye moko na esika moko ya kimya epai kuna abondelaki ete: “Nzambe, soki olingi monisá ngai elembo—eloko moko oyo ekondimisa ngai ete yo ozali.” Albert azilaki ntango molai. Azali komikundola ete ntango likambo moko lisalemaki te, elikya na ye “ebongwanaki mawa, liyoki ya bozangi mpe nkanda.”
Motindo moko na Albert, bato mingi bamonaka ete balukaka Nzambe kasi bazwaka ye te. Bakoki kobulunganisama na mateya ya bakonzi ya mangomba to kolɛmba na tekiníki ya mombongo ya basakoli na televizyó. Wana batungisami mpo na bokosi oyo ezali komonana kati na bazalani na bango, mingi bazali koyeba te nini basengeli kondima. Nzokande, Davidi, Mokonzi ya Yisalaele ya kala andimisaki mwana na ye Salomo ete: “Soko okoluka ye [Nzambe], akozwama na yo.”—1 Ntango 28:9.
Na bongo, lolenge nini Nzambe amimonisaka ye moko? Osengeli komizela ete omona elembo—likamwisi moko oyo likondimisa yo ete Nzambe azali? Engebene ankɛ́tɛ moko esalemaki kala mingi te oyo elobelami na zulunalo Time, koleka Baamerikɛ́ mibale kati na misato bandimaka makamwisi. Lisoló yango limonisaki mpe ete “mangomba ya minene na Amerika ezali bongo Karismatike mpe Pantekɔte oyo losambo na yango etalelaka mingimingi ‘bilembo mpe makamwisi.’”
Esengeli liboso komona “bilembo mpe makamwisi” mpo na kondimela Nzambe? Asalelaki makamwisi na ntango ya kala. Mpo na komonisa yango: Saulo moto na Talasia, oyo azalaki konyokola bayekoli ya Mwana ya Nzambe, Yesu Klisto, amonaki likamwisi monene na nzela wana alongwaki na Yelusaleme mpo na kokenda na Damaseke. Bokutani yango ya kokamwa ya ye na Yesu oyo asekwaki ememaki Saulo na kobongwana. (Misala 9:1-22) Na yango, monyokoli ya kala akómaki bongo ntoma Paulo—moko ya bakɔteli ya molende ya boklisto!
Kasi makamwisi epesaka ntango nyonso nzela ete bato bábongwana? Kondimela Nzambe etaleli mpenza komona makamwisi?
[Elilingi na lokasa 3]
Mwana ya Nzambe alobaki na Saulo moto na Talasia na lolenge ya likamwisi. Osengeli komizela komona likamwisi?