Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 1/3 lok. 32
  • Nani nde azali kotambwisa makambo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nani nde azali kotambwisa makambo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 1/3 lok. 32

Nani nde azali kotambwisa makambo?

“NANI azali koyangela mokili?” Soki moto moko atuni yo motuna wana, okoyanola lolenge nini? Bato mingi ya mangomba bakoyanola ete: “Nzambe” to “Yesu.” Lisoló moko libimaki na zulunalo The Freeport News ya esanga Bahamas lipesaki eyano oyo bato mingi te bakoki komizela na yango.

Mwasi moko oyo akomaki lisoló wana abandaki yango na maloba oyo: “Namonaki trakte moko na ekɔtelo ya ndako na ngai. Mingimingi, natángaka te biloko motindo wana, kasi mbala oyo nazwaki ekateli ya kotánga yango. Motó na likambo ya trakte yango etunaki motuna ete: ‘Nani mpenza azali koyangela mokili?’” Nsima ya kotánga trakte wana oyo ezalaki kolimbola Biblia, mwasi yango ayaki koyeba ete moyangeli ya mokili oyo ezali bongo Nzambe te, Yesu mpe te, kasi Satana Zábolo.​—Yoane 12:31; 14:30; 16:11; 1 Yoane 5:19.

Trakte yango eyebisi ete: “Kanisa mayele mabe mpo na koboma oyo bato basili komonisa. Basalelaki bandako etondi na gaz mabe mpo na koboma bato, bisika ya monyoko makasi bibéngami camps de concentration, mandoki makasi mpo na kobwakela bato mɔ́tɔ, babombi ebéngami napalm mpe myango misusu ya mabe mpe koyokisana mpasi mpe kobomana, kozanga mawa. . . . Nguya nini ezali kopusa bato na kosala makambo na nsɔ́mɔ boye to komema bango kati na oyo bazali komiyoka ete bapusami na kosala bambeba? Omituná naino te soki ezali na nguya moko mabe mpe ezangi komonana oyo ezali kopusa bato na kosala mobulu mingi boye?” Ezali likambo ya kokamwisa ete Biblia ezali kobénga Satana “Nzambe na mokili oyo”?​—2 Bakolinti 4:4.

Likambo ya esengo mpenza, ntango ebɛlɛmi wana Satana mpe bademó na ye bakozala lisusu te. “Mokili ezali mpe kolongwa mpe mposa mabe na yango lokola, nde ye oyo akosalaka mokano na Nzambe akoumelaka seko.” (1 Yoane 2:17) Ɛɛ, Biblia elaki ete baoyo bazali kosala mokano ya Nzambe bakozwa elikya ya kozala na bomoi ya seko na mokili ya sika epai kuna boyengebene ekozala. (Nzembo 37:9-11; 2 Petelo 3:13; Emoniseli 21:3, 4) Ekozala libondisi monene wana bɔpusi mabe ya Satana mpe ya bademó na ye ekolongolama!

Nsima ya kolobela na mokuse makambo mazwami kati na trakte yango ya moke, mokomi ya lisoló yango na zulunalo The Freeport News asukisaki ete: “Nazali mpenza na esengo lokola natángaki trakte yango . . . mpamba te ngai mpe nazalaki komitungisa na ntina na ezalela ya makambo ya mokili, mpe koluka koyeba nani azali kotambwisa makambo.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto