Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 1/2 lok. 32
  • Elónga mosusu mpo na Batatoli ya Yehova na Grèce

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Elónga mosusu mpo na Batatoli ya Yehova na Grèce
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 1/2 lok. 32

Elónga mosusu mpo na Batatoli ya Yehova na Grèce

NA MOKOLO mwa 6 Ɔkɔtɔ́bɛ 1995, Batatoli ya Yehova mibale, baministre ya ntango nyonso basambisamaki liboso na bazúzi misato ya esambiselo moko ya engumba Athènes. Bafundamaki mpo ete bazalaki koteya bindimeli na bango epai na bato ya mangomba mosusu, mpe ezali bongo polisi moko nde afundaki bango nsima wana Batatoli yango mibale bayaki kotala ye na ndako na ye.

Mituna oyo zúzi-mokambi atunaki mimonisaki ete azalaki mpenza na mposa ya koyeba mosala ya Batatoli ya Yehova. Na ndakisa, atunaki ete: “Uta ntango boni bozali kokokisa mosala yango? Lolenge nini bato bazalaki kotalela bino na boumeli ya bambula? Lolenge nini bato bazali koyamba nsango na bino? Bolobaka nini epai na bato na ntango bokómaka na bandako na bango?” Bato nyonso bazalaki kati na esambiselo balandaki na likebi nyonso litatoli kitoko oyo lipesamaki.

Oyo ekamwisaki lisusu Batatoli ezali ete ata mpe procureur alobaki na lolenge ya kokɔtela bango. Alobaki na maloba na ye ya bosukisi ete: “Engebene mibeko ya mboka, Batatoli bazali na lotómo ya kondima mpe kosambela Nzambe na bango, mpe lisusu ya kopalanganisa bindimeli na bango ndako na ndako, na bisika ya bato mingi, mpe na balabála, ata mpe ya kokabola mikanda na bango kozanga kosɛnga mosolo soki yango ezali mposa na bango.” Procureur atángaki mpe makatami ndenge na ndenge ya bisambiselo mpe ya conseil d’État oyo elongisaki Batatoli. Alobelaki mpe kosambisama ya Kokkinakis na ekólo Grèce, oyo ekatamaki na esambiselo monene ya Mpótó mpo na ntómo ya bato, mpe esambiselo yango elongisaki Batatoli ya Yehova.a Procureur apesaki likebisi na kolobáká ete: “Nalɔmbi bino bómikundola ete ekólo Grèce efutaki kútu lomande mpo na likambo wana. Na yango tosengeli kosala na bokɛngi na ntango tobyangami na kosambisa makambo motindo oyo. Kútu, makambo ya boye masengeli kofundama nokinoki na esambiselo te.”

Avoka ya Batatoli, oyo azwaki maloba nsima ya procureur, azalaki lisusu na makambo mingi te ya koloba. Atako bongo, azwaki libaku yango mpo na kobɛta nsɛtɛ na likambo oyo emonisi ete mobeko oyo ezali kopekisa kolobela bindimeli na yo epai ya bato mosusu eyokani te na mibeko ya mboka mpe yango ezali komemela ekólo Grèce mikakatano mingi liboso ya bikolo mosusu.

Zúzi-mokambi abwakaki miso epai na bazúzi mosusu mibale, engebene ekateli ya bazúzi nyonso, ndeko mobali mpe ndeko mwasi batikamaki kozanga ete bakatela bango etumbu. Kosambisama oyo eumelaki ngonga moko na miniti zomi, ezalaki elónga mpo na nkombo ya Yehova mpe mpo na basaleli na ye.

Oyo ezali lisambisi ya minei lilongisi likambo ya lotómo ya moto ete akoki koteya bindimeli na ye epai ya basangani ya lingomba mosusu, nsima ya likambo ya Kokkinakis oyo ememamaki na esambiselo monene ya Mpótó mpo na ntómo ya bato. Batatoli ya Yehova na mboka Grèce bazali na esengo ete mikakatano na ntina na mosala na bango ya kosakola mizali lisusu mpenza te mpe likoki ezali ete bálanda kosala kozanga kopekisama.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzeli ya 1 Sɛtɛ́mbɛ 1993, nkasa 27-31.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto