Mituna ya Batángi
Engebene bansango oyo ezali koyebisama, nsima ya kobotama ya mwana, balopitalo mosusu ezali kobomba kɔku (placenta) mpe nsinga ya motɔlu mpo na kobenda biloko oyo bizalaka kati na makila na yango. Likambo yango lisengeli kotungisa moklisto?
Na bisika mingi mpenza, likambo motindo oyo lisalemaka te, na yango baklisto basengeli te komitungisa. Kasi soki ezali na bantina malamu ya kokanisa ete likambo yango lisalemaka kati na lopitalo epai kuna moklisto akokende kobota, ekozala malamu koyebisa na monganga ete kɔku ya mwana mpe nsinga ya motɔlu esengeli kobwakama, esengeli kosalelama na lolenge mosusu te.
Nkisi ndenge na ndenge ya minganga ezali kosalema uta na biloko oyo biutaka epai na bikelamu ya bomoi, ezala moto to mpe nyama. Na ndakisa, basilaki kobimisa ba hormones mosusu uta na masuba ya mpunda oyo ezali na zemi. Makila ya mpunda ezalaki kosalelama mpo na kosala nkisi ya tonga ya tetanósi mpe nkisi ebéngami globuline gamma oyo ezali kosalelama uta kala mpo na kobundisa maladi ezali kobimisama uta na makila oyo ezalaka kati na kɔku ya mwana (na nsima ya kobotama). Balopitalo mosusu ezali kobomba kɔku ya bana mpe kotya yango kati na frigo mpe na nsima basáli-nkisi ya monganga bazali koya kozwa yango mpo ete makila na yango oyo ezalaka na ba anticorps mingi esalelama mpo na kobimisa globuline gamma.
Na mikolo oyo lisusu, balukiluki balobi ete kosalela makila oyo ezalaka kati na kɔku ya mwana nsima ya kobotama ebimisaki matomba malamu mpo na kobikisa lolenge moko ya maladi oyo ebéngami leucémie, mpe elobamaki ete makila wana makoki kosalelama malamu mpo na kobikisa kobulungana ya ebongiseli oyo ebundisaka maladi kati na nzoto to, ekoki kosalelama na esika ya kosalela mafuta oyo ezalaka na kati ya mikuwa. Na yango, nsango epalanganisami mingi na ntina na baboti oyo basɛngaki na minganga ete bábenda makila ya kɔku ya bana na bango nsima ya kobotama, ete bábomba yango na frigo mpo ete ekoki mbala mosusu kosalelama mpo na kosalisa bana na bango soki babɛli na bambula oyo ekolanda na nsima.
Momeseno wana ya kosalela makila oyo ezalaka kati na kɔku ya mwana ekoki soko moke te kolɛngola baklisto ya solo, baoyo batambwisaka makanisi na bango engebene mibeko ya kokoka ya Nzambe. Mozalisi na biso atalelaka makila ete ezali bulɛɛ, emonisaka bomoi oyo Nzambe apesi biso. Lolenge bobele moko ya kosalela makila, oyo Nzambe andimaki yango, ezali bongo kosalelama na yango na etumbelo, na boyokani na likambo ya kopesa mbeka. (Levitike 17:10-12; kokanisá na Baloma 3:25; 5:8; Baefese 1:7.) Longolá yango, makila oyo euti na ekelamu moko esengelaki kosopama na mabelé, kobwakama.—Levitike 17:13; Deteronome 12:15, 16.
Wana baklisto babomi nyama na bokila to babomi nsoso to ngulu na ndako, basopaka makila na yango mpe babwakaka yango. Basengeli mpenza bobele te kosopaka yango na mabelé, mpamba te likanisi ezali ete babwakaka yango, na esika ete básalela yango na lolenge mosusu.
Baklisto oyo bakɔti lopitalo bayebi ete biloko oyo biuti na nzoto na bango bisengeli kobwakama, ezala nyei to masuba, biteni ya nzoto oyo bisili kobeba, to makila. Ya solo, monganga akoki kosɛnga ete asala liboso ekizamɛ, lokola ekizamɛ ya masuba, ekizamɛ ya eteni ya nzoto oyo ezali na kanser, to ekizamɛ ya makila. Kasi, na nsima biloko wana bibwakamaka engebene mibeko ya mboka na mboka. Ekosɛnga soko moke te ete babɛli oyo bazali kati na lopitalo básala lisɛngi ya sikisiki na ntina na yango mpamba te kobwaka biloko wana ezali likambo libongi mpe liyokani na bokɛngi ya minganga. Soki mobɛli moko azali na bantina malamu ya kobɛta ntembe ete likambo motindo wana likoki kosalema, akoki koyebisa yango epai na monganga oyo azali kosalisa ye, komonisáká ete mpo na bantina ya lingomba na ye, akolinga ete biloko wana bibwakama.
Nzokande, lokola tolobelaki yango, likambo oyo ezali mpenza kotungisa babɛli mingi te mpo ete na bisika mingi momeseno wana ya kokamata to kosalela lisusu kɔku ya mwana nsima ya kobotama to biloko mosusu oyo biutaka na nzoto ya moto ekanisamaka kútu te, esalelamaka mpe te mokolo na mokolo.
Kati na lisoló “Tóyina oyo ezali mabe,” oyo ebimaki na “Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli” ya 1 Yanuáli 1997, emonanaki lokola ete ezalaki kolobela mingi mpenza pedofilí. Momeseno yango ekoki mpenza kolimbolama lolenge nini?
Diksionere Ninth New Collegiate Dictionary epesi ndimbola oyo ete “pedofilí” ezali “momeseno elongobani te ya kosepela kosangisa nzoto mingi mpenza elongo na bana mike.” Mitindo mosusu ya mimeseno wana mipekisami na Deteronome 23:17, 18, (NW). Na mokapo yango, Nzambe akweisi makasi likambo ya kokóma mosáli pite na tempelo (“to ‘minyó,’ mwana mobali ya moke oyo akamatami na mokano ete asalelama na kosangisama nzoto na lolenge elongobani te,” maloba na nsé ya lokasa). Mokapo yango mopekisaki mpe ete moto moko te amema kati na “ndako na [Yehova]” lifuti ya “mbwa” (“ekoki mpenza kozala ete elingaki bongo kolobela “pedé”; moto oyo asangisaka nzoto elongo na moto mosusu na esumbeli, mingi mpenza elongo na elenge mobali,” maloba na nsé ya lokasa). Mokapo oyo ya Makomami mpe mikanda ya mokili emonisi ete Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobelaki bongo kosalelama ya bana mike kati na kosangisa nzoto na lolenge mabe, yango etaleli mpe kosimbasimba bana mike na nzoto na mposa mabe.