Masoló Ya Basakoli Ya Bokonzi
Solo esakolami epai na bato ya mitindo nyonso
NTOMA Paulo azalaki mosakoli ya molende ya Bokonzi ya Nzambe. Atikaki nzela te ete botɛmɛli epekisa ye kokokisa mokumba na ye ya kosakola “nsango malamu.” (1 Bakolinti 9:16; Misala 13:50-52) Paulo alendisaki basusu ete bálanda ndakisa na ye.—1 Bakolinti 11:1.
Batatoli ya Yehova bayebani na mokili mobimba mpo na molende na bango makasi ya kosakola. Ya solo, basakolaka epai na basusu na “bilaka malamu” mpe na “bilaka malamu te” mpo na kokokisa mosala oyo Nzambe atindi ya ‘kozalisa bayekoli.’ (2 Timoté 4:2; Matai 28:19, 20) Ata na mikili epai kuna bazali kokutana na botɛmɛli, bato ya motema sembo bazali koyoka nsango ya ntina mingi oyo etali Bokonzi ya Nzambe, lokola baeksperiansi elandi ekomonisa yango.
◻ Na esanga moko na wɛ́sti ya mbu ya Pasifike epai kuna mosala ya Batatoli ya Yehova epekisami, elenge mobali moko ya mbula 12 amonaki ete azalaki katikati na baninga mabe na eteyelo. Mingi kati na baninga na ye ya kelasi bazalaki komela makaya mbala na mbala, bazalaki kotánga babúku ekolakisaka bolumbu ya basi na mibali, bazangaki limemya epai na balakisi, mpe bazalaki kobunda mingi. Ezaleli yango eyikanaki mingi mpenza na boye ete elenge mobali yango asɛngaki epai ya tata na ye likoki ya kokende kotánga na eteyelo mosusu. Nzokande, tata amanyolaki na mwana na ye mpo na komonisa ye ete likanisi na ye libongi te, mpamba te amonaki ete etamboli ya banakelasi na biteyelo mosusu ya pembeni ezalaki bobele ndenge moko. Kasi, lolenge nini akokaki kosalisa mwana na ye?
Tata yango amikundolaki ete, kati na ndako, azalaki na búku oyo ezali kolobela makambo ya bilenge. Ezali likabo liutaki na ndeko na ye moko ya mosuni oyo azali Motatoli ya Yehova. Na bongo alukaki búku yango, mpe nsima ya komona yango, apesaki yango na mwana na ye. Motó na likambo ezalaki ete Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano bibongi.a Elenge mobali amonaki ete mokapo oyo motó na likambo na yango elobi “Lolenge nini nakoki kotɛmɛla bopusi ya baninga na ngai?” esengelaki mpenza kosunga ye. Yango eteyaki ye ntina ya kobatela limemya ya ye moko mpe lisusu eteyaki ye lolenge oyo akoki koboya na mayele nyonso na ntango bato mosusu balingi komema ye na kolanda nzela ya mabe. Na kosaleláká mitindá miuti na Makomami oyo ezwami na búku yango, elenge yango ayekolaki lolenge ya kotɛmɛla mpe kolonga bopusi ya baninga.
Komonáká yango mpe mbongwana mosusu ya malamu oyo esalemaki epai na mwana na ye, tata yango azwaki ekateli ya kotánga búku wana. Tata yango asɛngaki na Batatoli ya Yehova ete bayekola na ye Biblia na ndako, mpo ete toli ebongi mpenza oyo akutaki na búku yango ebendaki likebi na ye. Na nsima, basangani mosusu ya libota na ye bakomaki mpe koyekola. Mbano nini ezwamaki? Elenge mobali yango, leki na ye ya mobali, tata na ye, mpe bankɔ́kɔ na ye mibale bazali sikawa Batatoli ya Yehova.
◻ Bobele na mokili yango, Batatoli ya Yehova mibale batyamaki na bolɔ́kɔ mpo ete batosaki na bosembo nyonso mitinda ya Biblia. Nzokande, batikaki te ete ezalela wana epekisa bango kosolola na mpiko nyonso na ntina na Bokonzi ya Nzambe. Bakendaki kokutana na mokonzi moko ya bolɔ́kɔ mpe bazwaki ndingisa ya kosala ekaniseli ya Elambo ya mpokwa ya Nkolo kati na bolɔ́kɔ yango. Oyo nde esengo bazalaki na yango wana bakangami 14 bamonisaki bosepeli mpo na Biblia mpe basanganaki na Batatoli na molulu wana ya ntina mingi! Nsima wana babimaki na bolɔ́kɔ, bamoko kati na bango balandaki koyekola Biblia mpe kosangana elongo na Batatoli ya Yehova.
Na mikili koleka 25, Batatoli ya Yehova bazali konyokwama na ntina na bipekiseli to mpo na botɛmɛli to mpe minyoko ndenge na ndenge. Nzokande, lokola bantoma, bazali kolanda ‘kosakola nsango malamu ete Yesu azali klisto, kozanga kotika.’—Misala 5:42.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.