Nyonso ezali bimoniseli biuti na Nzambe?
ELIMO ya Nzambe, oyo epemisaki Biblia Mosantu, ekokaki mpe kopemisa babúku mosusu oyo etalelami ete ezali mosantu? (2 Timoté 3:16) Motuna wana motunamaki kati na zulunalo moko ya basángo ba Jésuites ya Italie (La Civiltà Cattolica), ebimisamaki “na bokambami ya Secrétariat d’État ya [Vatican]” mpe, na yango, Bakatolike batyelaka yango motema.
Zulunalo yango ya ba Jésuites elobaki ete: “Na lisalisi ya Elimo Santu, Nzambe amwangisaki mbóto ya Liloba ata kati na babúku ya baoyo bazali Bayuda te to bazali baklisto te.” Mpo na ba Jésuites, babúku “mosantu,” lokola Avesta ya Zoroastre to Babúku minei ya lingomba ya Confucius, ekomamaki “na mwa ndambo ya bopusi ya Elimo Santu, mpe na yango, na lolenge moko to mosusu, ezali na ‘emoniseli euti na Nzambe.’”
Nzokande, lisoló yango epesi ndimbola moko ya polele. Elobi ete: “Ezali makambo nyonso te mazwami kati na búku wana nde mazali liloba ya Nzambe,” ebakisi ete bato oyo bakomaki babúku yango mbala mosusu “bazwaki bopusi ya esika oyo etondi na losambo ya ebele ya banzambe to na filozofi,” epai kuna bazalaki kofanda mpe kosala. Engebene Marco Politi, mokomani ya zulunalo La Repubblica ya Italie, oyo apesaka nsango ya Vatican, likanisi wana “ezali kopesa nzela na boyokani oyo ekanisamaki liboso te ete ekokaki kosalema kati na Lingomba ya Katolike mpe mangomba minene ya mokili,” ezali bongo kozongisa elimo ya koyanganisama ya mangomba mingi makeseni mpo na losambo, lokola esalemaki na engumba Assise na 1986, oyo Jean Paul II abandisaki yango na nguya nyonso.
Yehova azali Nzambe ya mobulu te mpe ya mobulungano te. (1 Bakolinti 14:33) Bongo, tokoki te koloba na bosembo nyonso ete elimo santu, to nguya oyo ekosalaka mosala, ekokaki kopemisa ata biteni ya búku oyo ezali soko moke te na boyokani na Liloba na ye, Biblia. Ntoma moklisto Paulo alendisaki te likanisi ya koyanganisama ya “mimeseno ya mangomba” makeseni, akomaki kútu ete ezali bobele na “elikya moko . . . ; Nkolo moko, kondima moko, kobatisa moko.”—Baefese 4:4, 5.
“Elikya moko” wana ezali na bokangami na komonisa kondima epai na Yesu Klisto. Na lolenge lobongi mpenza, Biblia elobi ete: “Lobiko mpe ezali na moto mosusu te, mpo ete nkombo mosusu te esili kopesama awa na nsé kati na bato ete tókoka kobika mpo na yango.” (Misala 4:12) Ezali na “búku mosantu” mosusu te oyo ezali komonisa Yesu ete azali moto ya ntina mingi kati na kokokisama ya mikano ya Nzambe. Bobele soki tondimi Biblia lokola Liloba ya Nzambe nde ekoteya biso na ntina na ebongiseli ya bolingo oyo Nzambe akamataki mpo na kobikisa biso.—Yoane 17:3; 1 Batesaloniki 2:13.