Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 1/1 lok. 32
  • Nani asengeli kopamelama mpo na bitumba?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nani asengeli kopamelama mpo na bitumba?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 1/1 lok. 32

Nani asengeli kopamelama mpo na bitumba?

ESENGELI nde kopamela Nzambe mpo na bitumba oyo bato basili kobimisa? “Te, Nzambe alingaka bitumba te.” Ezali na lolenge wana nde episkɔpɔ moko ayebani mingi ya Lingomba ya Protestá na Allemagne, Martin Niemöller, ayanolaki na motuna wana, mwa moke nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Maloba na ye matyamaki kati na búku moko oyo ebimaki na 1946, oyo ebéngamaki Ach Gott vom Himmel sieh darein​—Sechs Predigten (Ɛ Nzambe, Talá uta na likoló​—Masoló motoba).a Búku yango elobi ete:

“Ye oyo alingi kopamela Nzambe mpo na [bitumba] ayebi te, to alingi te koyeba, Liloba ya Nzambe. Ya solo, koluka koyeba soki biso baklisto tozali na ngambo monene to mpe tozali na ngambo te na bitumba oyo bizali sé kokóba, ezali likambo mosusu. Mpe tokoki kokima te na pɛtɛɛ nyonso motuna wana. . . . Ekoki mpe kokundwelama na bosikisiki ete, na boumeli ya bikeke, mangomba ya baklisto mazalaki mbala na mbala komipesa na kopamboláká bitumba, mampinga mpe bibundeli, mpe ete babondelaki na lolenge oyo ekeseni mpenza na oyo ya Klisto, ete banguna na bango bákufa na etumba. Nyonso wana ezali libunga na biso mpe libunga ya batata na biso, kasi tosengeli soko moke te kopamela Nzambe. Mpe biso baklisto ya lelo oyo tozali na nsɔ́ni liboso ya Bayekoli ya Biblia ya molende mingi [Batatoli ya Yehova], oyo ebele na bango bakɔtisamaki kati na káa ya bakangami mpe [kútu] bakufaki mpamba te baboyaki mosala ya sodá mpe baboyaki koboma baninga na bango bato.”

Lelo oyo, mbula 50 nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, maloba ya Niemöller mazali kopesa bato oyo balingaka kimya libaku ya kokanisa mozindo. Te, Nzambe asengeli kopamelama soko moke te mpo na lolenge oyo mabota mazali kotangisa makila! Ɛɛ, na nzela ya basambeli na ye ya solo, oyo bamikɔtisaka te na bitumba ya mokili, Nzambe azali kosakola ete etikali moke etumba ekozala lisusu te.​—Nzembo 46:9; Yoane 17:16.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Masoló ya Martin Niemöller ebimisamaki na nsima na Lingelesi kati na búku Of Guilt and Hope (Mpo na ngambo mpe elikya). Nzokande, ebimeli na yango ya Lingelesi ekeseni na lolenge ekomamaki mpenza na lokotá ya Allemand, yango wana maloba oyo mabongolami mbala moko uta na lokotá ya Allemand.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto