Matomba ya motema ya kimya
ZÉBI ya monganga ya ntango na biso eyebi uta kala ete kozanga kopekisa nkanda ezalaka na bopusi mabe likoló na nzoto ya moto. Esili koleka mibu nkámá, zulunalo The Journal of the American Medical Association (JAMA) elobaki ete: “Mobali moko akwei mpe akufi wana ezalaki ye na nkanda makasi, mpe elobamaki ete, mbala mosusu azalaki na motema oyo elɛmbi, oyo ekokaki te komema mokumba monene mouti na nkanda makasi na ye. Emonani lokola ete moto moko te azali kondima ete liwa yango liuti na nkanda makasi oyo azalaki koyoka mbala na mbala, oyo ememaki na kolɛmba ya motema na ye.”
Maloba oyo mazali kokamwisa bayekoli ya Biblia te, Liloba ya Nzambe. Bikeke soko 29 liboso ete JAMA epesa makebisi na ntina na makámá ya kozala nkandankanda, Mokonzi Salomo apemamaki mpo na kokoma ete: “Motema na kimya ekoyeisela mosuni bomoi.” (Masese 14:30) Maloba wana mazali sé solo kino lelo.
Na kobateláká elimo ya kimya, tobatelami na ebele ya makɔnɔ oyo mbala mingi matumolami na mitungisi, na ndakisa komata ya tasyó, mpasi ya motó, mpe mikakatano ya kopema ya nzoto. Nzokande, longola kozala na kolɔngɔ́nɔ́ malamu, boyokani na biso elongo na basusu ekopesa litomba soki tosali milende ya ‘kozala nkandankanda te mpe ya kotika kosilika.’ (Nzembo 37:8) Bato bazalaki kobendama na pɛtɛɛ nyonso epai na Yesu mpo na ezaleli na ye ya boboto mpe ya komibanzabanza ya solo oyo azalaki komonisa mpo na bango. (Malako 6:31-34) Bobele bongo, tokoki kozala eutelo ya kopema mpo na basusu soki tokólisi motema ya kimya.—Matai 11:28-30.