Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 15/12 nk. 20-21
  • “Ndakonzambe na bino ezali wapi?”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Ndakonzambe na bino ezali wapi?”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 15/12 nk. 20-21

“Ndakonzambe na bino ezali wapi?”

MBALA mingi na Mozambique, batunaka Batatoli ya Yehova motuna oyo. Mpo na koloba solo, kino kala mingi te motuna yango mozalaki mpasi mpo na koyanola. Ezali mpo ete Batatoli ya Yehova bazalaki na bonsomi te na mokili yango kino na 1991. Na bongo, likoki ezalaki te na kozala na bisika bibongisami mpe biyebani polele ete bizali mpo na losambo.

Nzokande, makambo mabongwanaki bandá na mwa 19 Febwáli 1994. Na mokolo yango ya molungé, ya moi makasi, Bandako ya Bokonzi mibale ya liboso oyo etongamaki na Mozambique efungwamaki. Motango mobimba ya bato 602 bayaki na molulu ya bofungoli bisika kitoko wana mpo na makita na engumba Beira oyo ezali pene na libongo, engumba yango ezwami na katikati bandá na nsuka moko kino na nsuka mosusu ya bokúla mobimba ya Mozambique. Ekosalelama na masangá misato ya Batatoli ya Yehova na engumba yango.

Bibongiseli nyonso, bandá na kotyama ya miboko kino kosilisa kotonga, eumelaki mbula mobimba na sanza mibale ya mosala makasi. Mbala mingi basali 30 to mpe koleka ya bolingo malamu bazalaki kouta na mokili ya Zimbabwe oyo ezali pembeni bazalaki koya mpe bazalaki kosala lipeka na lipeka elongo na Batatoli ya engumba wana. Lokola bango nyonso bakokaki te kozwa bisika kati na ndako ya bamisionɛrɛ na Beira, oyo ezalaki esika mpo na kotambwisa misala, basusu balalaki libandá zingazinga ya ndako ya bamisionɛrɛ na boumeli ya bawikende mpe na mabaku mosusu na boumeli ya bapɔ́sɔ mingi.

Esika ya kotonga Ndako ya Bokonzi mpo na lisangá ya Massamba mpe ya Munhava ezwami na balabala monene ya Beira. Misionɛrɛ moko alobi: “Mokolo moko ya mosala makasi, wana mosala mozalaki kokoba nokinoki mpe bokoli ekomaki komonana, tomonaki makámá ya mituka malingaki kosalema wana bakumbi-mituka bazalaki koleka na kotaláká Ndako ya Bokonzi, kobosanáká kotala liboso na nzela oyo ezalaki bango kotambola.” Mingi bazalaki kotɛlɛma mpo na kotala misala, mpe bazalaki kokamwa mingi na komona bato ya mposo ndenge na ndenge bazali kosalana elongo lokola moto moko.

Makambo mingi matali kolengela mpe kobongisa mazalaki kosalema. Na bokeseni na misala mingi ya botongi na eteni oyo ya mokili, epai kuna bisaleli mpe makoki ezali mingi te, mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi etɛlɛmaki ata mbala moko mpo na bozangi bisaleli. Na libaku moko, tozalaki na mposa ya saki 800 ya simá, mpe izini bobele moko epai kuna tokokaki kozwa yango ezalaki na basaki mingi te mpo na kotya ebele ya simá motindo wana. Bandeko basololaki na biró ya La Société Watch Tower na mboka-mokonzi, Maputo; basaki etindamaki na mpɛpo, ememamaki kino na izini wana ya kosala simá, mpe itondisamaki. Mosala mokobaki kozanga kotɛlɛma.

Na libaku mosusu, wana nsamba ezalaki kotyama, tozangaki mitɔ́ndo ya bibende. Mpo ete ezalaki komonana mingi te, bibende mpo na kotonga bizalaki kouta mosika na ntáká ya bakilomɛtɛlɛ 600! Moko kati na bandeko oyo bazalaki kosala, abɛlɛmaki epai na moto moko oyo azalaki kotalatala mpe atunaki ye soki ayebi esika oyo bakokaki kozwa bibende mpo na kosilisa mosala ya kotonga. Moto yango ayanolaki ete: “Natɛlɛmaki awa esili koleka pene na ngonga moko, mpe yango esalami te bobele na libaku malamu. Nakoki kokanga motema te mpo na kokumisa bino na mosala bozali kokokisa mpe elimo oyo ezali kopusa bino kati na mosala yango. Nazali na lolenge ya bibende oyo bozali na yango mposa, mpe nakosepela kopesa bino yango lokola likabo.” Yango ezalaki eloko oyo eyaki mpenza na ntango oyo ebongi.

Batali mingi bazalaki komituna soki kompanyi monene nini oyo ezalaki kosala mosala wana. Kasi batongi bazalaki na esengo ya koyebisa bango ete ezalaki Batatoli ya Yehova nde bamipesaki mpo na kosala lokola basali ya bolingo malamu. Eloko nini ekamwisaki mingi mpenza batali? Moko alobaki: “Bozali mpenza libota ya bomoko, atako bokeseni bamposo, bozali kosala na bomoko lokola bandeko.” Mbano ezalaki ete mingi bayaki kosɛnga boyekoli ya Biblia. Yango ezalaki mpe na litomba mpo na makita. Na ndakisa, mwayene ya bayangani na makita na lisangá ya Manga, eleki mbala mibale motuya ya Batatoli.

Bandako ya Bokonzi oyo etongamaki sika ezalaki mpenza lipamboli monene mpo na Batatoli na mboka wana. Mingi kati na bango bazalaki liboso kosangana na bisika oyo ezali mpenza malamu te, na nsamba ya matiti to mpe mwa manzanza likoló, na nsima ya lopango, to mpe na mwa eteni moke kati na ndako ya ndeko moko. Bazalaki mbala mingi kopola soki mbula ebɛti; atako bongo bazalaki kolanda koyangana na makita na bosembo nyonso. Na boumeli ya bambula mingi ezali bobele lolenge wana ya “Ndako ya bokonzi” Batatoli bayebaki na Mozambique. Ndeko Caetano Gabriel, nkulutu na lisangá ya Massamba, alobaki: “Tozali na botondi mingi epai na bandeko na biso na mokili mobimba oyo bapesaki makabo mpo na kotonga ndako oyo.” Elenge Motatoli moko amikundoli: “Ntango tozalaki na Carico (“káa ya kosembola bato” epai batatoli ya Yehova batyamaki na boumeli ya bambula pene na 12), tozalaki na momesano ya koloba ete: ‘Tokoyika mpiko na bosembo nyonso, mpe Yehova akopesa biso mbano.’ Ndako ya Bokonzi oyo etongami sika ezali mbano euti na Yehova.” Maloba na bango mazali komonisa botondi na bango mozindo mpe ekateli makasi na bango ya kosanzola Yehova.

Elimo ya kosala mosala ya mobongisi-nzela elamwisamaki epai na bilenge mingi oyo basanganaki na mosala ya botongi mpe nsima wana mosala esilaki bakomaki kosala mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Elenge Isabel, mobongisi-nzela ya sanza na sanza na lisangá ya Manga, alobaki nsima ya kotala bopɛto ya Ndako ya Bokonzi mokolo oyo ezalaki liboso ya bofungoli yango ete: “Mpo na ngai oyo ezali esika eleki bonzenga kati na engumba Beira mobimba. Kozala na esika oyo ezali esengo eleki monene mpo na ngai.” Adão Costa, misionere moko, alimbolaki ete bakonzi ya engumba bamonisaki mpenza boboto mpo ete bapesaki biso nzela ya kosalela myango ya nokinoki mpo na kobyangisa biloko uta na mboka mopaya mpo ete bayebi bosembo ya Batatoli. Mpe abakisaki: “Atako tolɛmbaki mingi, ezalaki likambo ya esengo monene na komona mbuma ya mosala nyonso oyo mpo na lokumu mpe nkembo ya Yehova.”

Sikawa, ntango nyonso moto moko ya boboto mofandi ya Beira atuni, “Ndakonzambe na bino ezali wapi?” Batatoli ya Yehova balakisaka ye moko na bandako mibale ya Bokonzi oyo etongami sika mpe bayanolaka na esengo monene, “Ezali na nzela monene, Avenida Acordo de Lusaka, etalani na biró ya bapólisi.” Mpe, babakisaka mpo na kosembola, “Ezali ndakonzambe te, kasi nde Ndako ya Bokonzi!”

Karte/Bililingi na lokasa 20]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

AFRICA

Mozambique

Beira

Maputo

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Map: Mountain High Maps® Copyright © 1995 Digital Wisdom, Inc.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto