Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 15/11 lok. 32
  • ‘Bamibanzabanzaka mpo na kosunga basusu’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Bamibanzabanzaka mpo na kosunga basusu’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 15/11 lok. 32

‘Bamibanzabanzaka mpo na kosunga basusu’

WANA ezali maloba oyo polísi moko ya engumba New York alobaki na ntina na Batatoli ya Yehova. Azalaki kosolola na Kathleen, moko na basáli ya bolingo malamu ya ntango nyonso na biro monene ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn, na engumba New York.

Na ntango ya bopemi ya midi, na mokolo moko ya molungé mpe ya moi makasi na eleko ya Ɔtɔmne, Kathleen afandaki na kiti moko pene na esika ebongisami mpo na botamboli ya kominanola. Azalaki koyoka radiokasɛ́ti oyo ezali na biyokelo ya kotya na matoi. Na esika hélicoptère ekitaka na ngámbo mosusu ya ebale East River, bibongiseli bizalaki kosalema mpo na bozongi ya pápa oyo ayaki na engumba wana. Bokɛngɛli bozalaki makasi bipai nyonso, mpe mwa ndambo ya bapolísi bazalaki kosɛnzɛla na kozolonganáká esika oyo ebongisami mpo na botamboli ya kominanola. Moko na bango abɛlɛmaki epai na Kathleen mpe atunaki ye soki azalaki kosala nini. Kathleen ayanolaki ete: “Nazali koyoka kasɛ́ti moko ya lokótá ya Russe. Omoni, nazali Motatoli ya Yehova, mpe nalingi koyekola lokótá ya Russe mpo ete nakende kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe epai na bato balobaka lokótá ya Russe oyo bayei kofanda na engumba oyo.”

Polísi yango azongisaki ete abandaki mokemoke kosepela na Batatoli ya Yehova na boumeli ya mbula 15 oyo asili kolekisa kati na mosala na ye ya polísi ya bokɛngɛli na engumba New York. Alobaki ete: “Natalelaka Batatoli ya Yehova lokola lingomba oyo ebongisami malamu oyo basangani na yango bamibanzabanzaka na bosembo nyonso mpo na kosalisa bato kati na mboka.”

Batatoli ya Yehova bayebani na mokili mobimba mpo na mosala ya kosakola oyo basalaka ndako na ndako. (Misala 20:20) Wana bazali kolobela Bokonzi ya Nzambe lokola elikya bobele moko mpo na kosilisa mikakatano oyo mizali kokómela bato, bazali mpe kosunga bato ete bábongisa lolenge ya bomoi na bango na kolendisáká bango ete básalela mitindá ya Biblia kati na bomoi na bango ya mokolo na mokolo. Na ndakisa, Batatoli ya Yehova bazali kolendisa baboti ete bábongisa mabota na bango na lolenge boye ete mázala esika malamu mpo na koyekola. Balendisaka bato ete bázala sembo mpe bátosaka mibeko, kolendisáká bango ete bákóma na makoki mpe na bizaleli malamu oyo nkolo mosala akoki kosepela na yango.

Ɛɛ, Batatoli ya Yehova bamibanzabanzaka mingi mpenza mpo na kosalisa bato kati na mboka ete bákómisa bomoi na bango malamu koleka. Tozali kosɛnga yo na esengo nyonso ete oyanola na libyangi oyo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto