Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 1/11 lok. 27
  • “Likabo moko kitoko liuti na Yehova”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Likabo moko kitoko liuti na Yehova”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Masolo mosusu
  • “Bobongoli makanisi na ngai mpo na Batatoli ya Yehova”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Tósakola bansango malamu ya eloko eleki kitoko
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Mpo na nini kopesaka mersi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Tosalaki mosala na nsé ya libateli ya bolingo ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 1/11 lok. 27

“Likabo moko kitoko liuti na Yehova”

NIMERO ya 1 Máí 1996 ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobelaki na mozindo kozanga komikɔtisa ya moklisto kati na makambo ya mokili mpe lolenge ya koyokanisa mikumba na biso epai na Yehova mpe mikumba na biso epai na “Kaisala.” (Matai 22:21) Maloba ya botɔ́ndi mingi mapesamaki mpo na likanisi wana ya sika oyo libimisamaki. Kati na yango, nkomá elandi, oyo Motatoli moko ya mboka Grèce akomelaki Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova:

“Bandeko ya bolingo, nalingi komonisa botɔ́ndi mozindo oyo nazali na yango epai na bino banso mpo na libateli motindo wana ya elimo oyo bozali kopesa biso. Lokola nalekisaki mibu libwa na bolɔ́kɔ na ntina na kondima na ngai ya boklisto, nasepeli mpenza na makanisi oyo mamonisami na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Máí 1996. (Yisaya 2:4) Yango ezalaki likabo moko kitoko liuti na Yehova.​—Yakobo 1:17.

“Ntango nazalaki kotánga masoló yango na esengo nyonso, namikundwelaki maloba oyo mazwami na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli moko oyo ebimaki mwa moke liboso (1 Augústo 1994, lokasa 14): ‘Ya solo, Yehova azali na ezaleli moko ya motuya lokola azali komimonisa ete azali na makambo makasi te, mpe ezaleli wana etindi biso ete tólinga ye mingi.’ Ɛɛ, bandeko, natɔ́ndi Yehova ete nazali moko kati na lisangá na ye oyo etondi na boboto mpe na bolingo, oyo ezali komonisa mpenza mayele na ye.​—Yakobo 3:17.

“Kongɛngisama ya pole kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Máí endimamaki malamu awa na mboka Grèce, mingimingi na baoyo balekisaki mibu mingi na bolɔ́kɔ to baoyo bazali naino na bolɔ́kɔ na ntina na kondima na bango. Matɔ́ndi lisusu. Tiká ete Yehova akɛmbisa bino na elimo na ye ete bólanda kopesa biso bilei ya elimo ya motuya mingi na mikolo oyo ya mpasi mingi.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto