Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 1/11 lok. 32
  • “Tozali biso nyonso kati na libota bobele moko”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Tozali biso nyonso kati na libota bobele moko”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 1/11 lok. 32

“Tozali biso nyonso kati na libota bobele moko”

NA BAMBULA oyo euti koleka, kokanisa mabe likoló na basusu na ntina na bindimeli ya lingomba mpe ezaleli ya koponapona mposo esili kopalangana na mabelé mobimba. Matátá kati na bato ya bikólo bikeseni ebimisi kobomana, monyokoli mpe makambo mosusu ya nsɔ́mɔ koleka. Engebene lapólo moko esalemaki na Amnesty International, na 1994 kobebisama ya ntómo ya bato esɛngisi bato koleka milió 23 ete bákima bandako na bango.

Bobele na Rwanda, bato soko 500 000 babomamaki mpe bato koleka 2 000 000 bakómaki bato bakimá mboka nsima ya mobulu oyo mobimaki kati na Bahutu mpe Batutsi. Zulunalo Le Soir ya mboka Belgique ekomaki ete: “Batatoli ya Yehova banyokwamaki mingi koleka mpo ete baboyaki kosimba bibundeli.” Batatoli ya Yehova bamikɔtisaka te kati na matátá ya bitumba. Nzokande, bankáma kati na bango babomamaki kati na mobulu. Yango ezali kokundwela biso maloba oyo Yesu alobaki epai na bayekoli na ye ete: “Nde awa ezali bino na mokili te, . . . bongo bamokili bazali koyina bino.”​—Yoane 15:19.

Libota moko ya Batatoli ya Yehova​—Eugène Ntabana, mwasi na ye mpe bana na ye mibale​—bazalaki kofanda na mboka-mokonzi, Kigali. Wana azalaki kolimbwela bazalani na ye ezaleli etali kozanga komikɔtisa na makambo ya politiki, Eugène azalaki kolobela mingimingi bougainvillier, lolenge moko ya nzeté ya vinyo oyo ekólaka malamu na mikili ya molungé.​—Matai 22:21.

Eugène azalaki koloba ete: “Awa na Kigali bougainvillier ebimisaka fololo ya lángi motane, ya lángi rozɛ mpe ntango mosusu ya lángi mpɛmbɛ. Nzokande, fololo yango nyonso izali ya libota bobele moko. Ezali bobele bongo mpo na bato. Atako tokoki kozala na bokeseni, na lángi ya lomposo ya nzoto to bikólo, tozali biso nyonso kati na libota bobele moko, libota ya bato.”

Likambo ya mawa, atako bamonisaki ezaleli na bango ya kimya mpe ya kozanga komikɔtisa na makambo ya politiki, libota ya Ntabana libomamaki na etuluku moko ya basopi makila. Kasi, bakufaki basembwi mpenza. Tokoki kondimisama ete Yehova Nzambe akokokisa elaka na ye epai na bato motindo yango, mpe bakosekwisama mpo na kosangola mabelé epai kuna kokanisa mabe likoló na basusu ekozala lisusu te. (Misala 24:15) Na bongo, libota ya Ntabana, elongo na basusu, “bakosepela mpe na kimya na solo.”​—Nzembo 37:11.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto