Zulunalo oyo ezali kosimba motema
EBELE ya bazulunalo ebimisami na mokili mobimba mpo na kokokisa mposa ya batángi na ntina na bansango to na ntina na kominanola.
Eloko nini mpenza ekesenisi zulunalo oyo ezali na mabɔkɔ na yo? Nkomá oyo elandi, oyo etindamaki na biro ya la Société Watch Tower na Allemagne, ekoki kopesa eyano:
“Bandeko ya bolingo, matɔ́ndi mingi mpo na milende na bino mpe mosala na bino. Ntango ngai mpe bana na ngai ya mibali mibale toutaki na makita, atako ezalaki na 9:30 ya mpokwa, nasengelaki bobele kolanda botángi [na radyó-kasɛti] ya nimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo euti kobima. Lokola nazalaki kosukola basaani, nabandaki koyoka botángi ya lisoló ya liboso ya boyekoli (1 Apríli 1995). Namiyokaki ete nasengelaki kolanda yango lisusu, na yango nakataki mosala na ngai na kúku mpe natángaki lisoló [“Ozali na motuya na miso ya Nzambe!”] kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na koyokáká kasɛti. Esimbaki motema na ngai, mingimingi paragrafe ya minei mpe ya mitano. Na nsima mpisoli ebandaki kotanga na miso na ngai—kasi mpo na ntango molai te. Nazali na botɔ́ndi epai na Yehoha na boye ete nazali na bomoi mpe nazali kati na libota na ye elongo na bandeko mosusu mingi, nakoki koyebisa nkombo na ye epai na basusu. Ya solo, ntina ezali te ya komiyoka ete tozali na motuya te. Elimo ya Yehova ezali elongo na libota na ye. Tiká ete biso banso elongo tóyika mpiko mpe tótɛlɛma ngwi kati na kondima. Wa bino ndeko mwasi kati na kondima.”
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli epesaka makambo mingi koleka bobele nsango. Esimbaka mitema ya batángi na yango mpe ekokisaka mposa na bango ya bilei ya elimo mpe epesaka kolendisama na ntango ebongi. Ɛɛ, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli epesaka “bilei na ntango ebongi.”—Matai 24:45.