“Kobengana bango te!”
ZULUNALO Corriere della Sera epesi toli oyo ete: “Soko Motatoli ya Yehova moko, to ata mibale babɛti na ekuke na yo, kobengana bango te”! Zulunalo yango ezalaki kolobela likambo moko oyo lisalemaki na Treviso, na nɔ́rdi ya Italie, moto na mombongo moko mbɛlɛ abungisi milió moko ya lire (koleka badolare 600) mpamba te abenganaki Batatoli ya Yehova mibale oyo bayaki kotala ye.
Engebene zulunalo yango, Batatoli mibale bamiyebisaki epai na moto yango na maloba oyo: “Lelo ezali mokolo malamu mpo na yo. Tozali Batatoli ya Yehova, mpe tozali na eloko moko ya motuya mingi mpo na kopesa yo.” Na maloba wana, moto na mombongo yango oyo azangi boboto akangaki ekuke, kopesáká bango ata nzela te ya kosilisa maloba.
Soki moto yango ayokaki, mbɛlɛ alingaki koyeba ete Batatoli bayaki na ndako na ye mpo na kotikela ye pɔtɔmɔni na ye oyo balɔkɔtaki likoló na efandelo moko na park. Na bongo, Batatoli bazalaki na likambo mosusu ya kosala te, bobele kokende kotika yango na biro ya bapolisi oyo ezalaki pene wana. Na mokolo oyo molandaki, bapolisi bazongisaki yango epai na nkóló na yango.
Zulunalo Il Gazzettino di Treviso elobi: “Soki moto mosusu azalaki na esika ya [Batatoli], alingaki mbala mosusu . . . kobomba ebele ya mosolo yango. Kasi Batatoli ya Yehova bakoki kosala bongo te, basengeli kozala mpenza sembo.”
Nini epusaka Batatoli ya Yehova ete bázala “mpenza sembo”? Ezali bolingo oyo bazali na yango mpo na Nzambe mpe mpo na bazalani na bango, na boyokani na mateya ya Yesu Klisto. (Matai 22:37-39) Ezali mpe mpo na ntina yango nde Batatoli ya Yehova bakendaka ndako na ndako kosakola nsango malamu oyo etali “mabelé ya sika” oyo Nzambe alaki. Nsango motindo wana ya elikya ezali na motuya koleka eloko nyonso ya mosuni!—2 Petelo 3:13.