Tókende kotala Mokili ya Ndaka
KANISÁ ete moninga moko ayebisi yo ete asombi—lokola likabo mpo na yo—ndako moko ya sika na kartyé moko kitoko, ya kimya. Okomituna, ‘Ndako yango ezali lolenge nini?’ Na ntembe te, okozala na mposa makasi ya komona ndako yango na miso na yo moko, kotambola kati na yango mpe kotala eteni mokomoko na yango. Oyo mpenza ndako na yo ya sika!
Na mobu 1473 L.T.B., Yehova apesaki libota ya Yisalaele ya kala efandelo moko ya sika—Mokili ya Ndaka, etando molai oyo ezalaki na kilomɛ́tɛlɛ 500 longwá na nɔ́rdi kino na súdi mpe na bonene, ezalaki na mwayene ya kilomɛ́tɛlɛ 55.a Lokola ezwamaki kati na etando oyo ebéngami Croissant fertile, Mokili ya Ndaka ezalaki esika moko kitoko mpo na kofanda, ekokanaki na esika mosusu te.
Kasi mpo na nini likebi na biso lelo esengeli kobendama likoló na “efandelo” oyo epesamaki epai na moto mosusu, mingi mpenza moto oyo azalaki na bomoi esili koleka ntango molai? Mpamba te koyeba makambo maleká oyo matali mokili wana ya kala ekoki kosalisa yo okolisa bososoli na yo likoló na masoló ya Biblia. Profɛsɛrɛ Yohanan Aharoni akomaki ete: “Kati na mikili oyo milobelami na Biblia, motindo ya mabelé ya mboka mpe lisoló ya kala litali bato oyo bafandaki kuna etambolaka mingi mpenza nzela moko, yango wana moko ekoki kososolama malamu te kozanga lisalisi ya mosusu.” Lisusu, na eleko oyo nkembo na yango ekólaki mingi koleka, Mokili ya Ndaka emonisaki na etando moke lolenge oyo mosika te Paladiso ekozala mpo na bato na mokili mobimba na nsé ya Boyangeli ya Nzambe.—Yisaya 11:9.
Na boumeli ya mosala na ye awa na mabelé, Yesu Klisto asalelaki biloko oyo bizalaki komonana mingi kati na Mokili ya Ndaka mpo na kopesa bato mateya mabongi. (Matai 13:24-32; 25:31-46; Luka 13:6-9) Biso mpe tokoki koyekola batoli oyo tokoki mpenza kosalela kati na bomoi na biso ya mokolo na mokolo, na kotaleláká biloko mosusu oyo bizalaki kati na Palestine ya kala. Tiká tótambola kati na ndambo ya biteni na yango, mpo na kotala na mozindo mambi ndenge na ndenge ya mokili yango oyo ezalaki efandelo ya libota ya Nzambe na boumeli ya bikeke mingi. Lokola tokomona yango, tokoki koyekola makambo mingi kati na Mokili ya Ndaka.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Kosalelama ya liloba “Mokili ya Ndaka” kati na masoló oyo etaleli ntango ya kala, lokola emonisami kati na Biblia, kozanga kotalela makambo oyo bato ya politiki mpe ya mangomba bazali koloba lelo na ntina na etúká yango.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 2]
Cover: Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]
Garo Nalbandian