“Nazali nde kolɔ́ta?”
Lisoló oyo liuti na Malawi litali moko na mayangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova oyo esimbaki mpenza motema ya Batatoli ya mboka wana, ezalaki na motó ya likambo “Basanzoli na esengo,” esalemaki kuna na eleko ya molungé na 1995.
“PEMBENI na nzela moko monene, mwa moke liboso ya kokóma na libongo ya wɛ́sti ya libeke ya Malawi, libaya moko esilaki kotɛlɛmisama mpo na mbala ya liboso nsima ya mibu 29. Libaya yango ezalaki na makomi oyo: ‘Liyangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova.’
“Motuka moko ya monene etɛlɛmi pembeni ya libaya yango, bato koleka 200 bazalaki kati na yango, batindami oyo bautaki na engumba Mzuzu. Bamemaki maboke ya bilamba ya kolata, bolangiti, nzungu, katini, bilei, nkoni mpe Biblia mpo na kosangana elongo na bandeko na bango mibali mpe basi soko 3 000 oyo bautaki bisika mosusu.
“Wana tozali kopesa mbote na bandeko yango oyo bazali kokita na motuka, George Chikako oyo azali na mibu 63 ayei, kotindikáká velo na ye na zelo, auti kosala mobémbo oyo eumelaki mikolo mibale uta na mboka moke oyo ebéngami Nkhotakota. Na boumeli ya bambula mingi, Ndeko Chikako akɔtaki bolɔ́kɔ mbala minei mpo ete azalaki koboya kobuka mitindá ya Biblia. Mwana ya mwana mobali ya ndeko ya tata na ye akufaki nsima ya kobɛtama ntango akangamaki na bolɔ́kɔ. Ndeko Chikako amitunaki ete: ‘Nazali nde kolɔ́ta? Liyangani oyo ezali kosalema na moi makasi, mpe bato oyo bazali koyemba nzembo ya Bokonzi na mongongo makasi! Na boumeli ya bambula mingi mpenza, tozalaki kosala makita na biso na butu, tozalaki koyemba nzembo ya Bokonzi na mongongo ya nsé, mpe kokuluta mabɔkɔ na biso na esika ya kobɛta yango. Sikawa tozali koyangana na libándá, mpe bato bazali kokamwa na komona ete tozali ebele boye, nzokande bango bakanisaki ete tozalaka bobele moke!’
“Esika oyo liyangani ya etúká esalemaki ezingelamaki na matiti lokola bifelo mpe ezipamaki na nkekele mpo na kobombama moi. Mwa bandako mike esalemi na matiti mpe bisika ya kolala ya polele etongamaki mpo na koyamba batindami. Mopepe ya butu etondi na makɛlɛ́lɛ ya mingongo kitoko oyo mizali koyemba, oyo ebombami lisusu te mpo na bobángi monyoko.
“Liyangani wana ya etúká ezalaki na motó ya likambo oyo ebongaki mpenza na yango: ‘Basanzoli na esengo’!”
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Mountain High Maps® Copyright © 1995 Digital Wisdom, Inc.