Zúzi moko ya kala asɛngi bolimbisi nsima na mibu 45
NA ESAMBISELO moko na engumba Berlin, na sanza ya Augústo 1995, zúzi moko ya kala na Esambiselo monene amonisaki mawa ya motema na ye epai na Motatoli ya Yehova moko mpo na mabe oyo asalelaki ye esili koleka mibu 45.
Na Ɔkɔtɔ́bɛ 1950, Esambiselo monene ya République démocratique allemande (R.D.A.) esakolaki ete Batatoli ya Yehova libwa bazalaki na ekweli lokola batombokisi mpe banɔ́ngi oyo bazalaki kotɛmɛla Letá. Mibale bakatamelaki etumbu ya bolɔ́kɔ bomoi na bango mobimba, mpe basusu nsambo—kati na bango Lothar Hörnig elenge ya mbula 22 oyo, likoló na fɔtɔ́ awa azali moto ya minei longwa na lobɔkɔ na mobali—bakatamelaki etumbu ya ntango molai.
Nsima ya mibu ntuku minei, R.D.A. ekómaki eteni ya République fédérale d’Allemagne. Kobanda wana bakonzi basalaki bolukiluki na ntina na bokesene oyo bosalemaki kala na R.D.A. mpe balukaki kosambisa babandisi na yango. Moko na bokesene motindo yango ezalaki kosambisama oyo Esambiselo monene esambisaki Batatoli ya Yehova na 1950.
A. T., oyo azali sikawa na mibu 80, azalaki moko na bazúzi misato oyo bakataki likambo ntango Batatoli ya Yehova libwa basambisamaki. Sikawa afundamaki ete apɛngwisaki boyengebene, bongo abyangamaki liboso na Esambiselo ya Etúká na Berlin mpo na kolimbola lolenge na ye ya kosambisa.
Na makambo oyo alobaki liboso na esambiselo, zúzi wana ya kala andimaki ete esili koleka mibu 45 andimaki ekateli ya kokweisa, atako asɛngaki etumbu ya makasi mingi te. Kasi lisambisi yango esalaki ete akanisa lisusu. Mpo na nini? Batatoli ya Yehova banyokwamaki na ba Nazi na boumeli ya Etumba ya mibale ya mokili mobimba mpamba te baboyaki kopesa Hitler mabɔkɔ. Nsima ya etumba Batatoli banyokwamaki lisusu, mbala wana na boyangeli ya Bakoministe. Yango epesaká zúzi wana “mpasi mingi.”
Lothar Hörnig ayebisaki na esambiselo ete alekisaki mibu mitano na ndambo na bolɔ́kɔ epai kuna azalaki bobele ye moko mpe abimisamaki na bolɔ́kɔ ya Brandenburg bobele na 1959. Ntango ayokaki maloba ya Hörnig, mosambisi wana ya kala alelaki. Alobaki na mongongo ya kolela ete “Nayoki mawa mingi. Limbisá ngai.” Hörnig andimaki bolimbisi oyo asɛngaki.—Kokanisá na Luka 23:34.