Bamemyaki ntómo ya mobɛ́li
‘Ezali na lolenge mosusu te oyo nakoki kosala lipasó oyo kozanga kozongisa makila. Soki olingi koleka na lipasó, osengeli kondima mwango na ngai ya kosalisa bato. Soki bongo te, osengeli koluka monganga mosusu.’
MALOBA wana ya monganga maningisaki te kondima ya Cheng Sae Joo, Motatoli ya Yehova moko oyo afandaka na Thaïlande. Wana ekizamɛ emonisaki ete azali na méningiome, lolenge moko ya kanser ya bɔɔngɔ́, Cheng asengelaki mpenza koleka nokinoki na lipasó. Kasi azalaki na ekateli makasi ya kotosa etindá oyo ya Biblia: “Bóboya . . . makila.”—Misala 15:28, 29.
Cheng akendaki na mapitálo mosusu mibale, mpo alingaki ete soki ekoki básalisa ye bobele na mboka na ye mpenza. Likambo ya mawa mpo na ye, kuna minganga baboyaki mpe kosala lipasó kozanga kozongisa makila. Na nsuka, Biro mpo na makambo matali minganga ya Thaïlande etyaki Cheng na boyokani elongo na lopitalo moko (Neurological Institute of the Tokyo Women’s Medical College). Lopitalo yango esilaki kosalisa bato koleka 200 na bokɔnɔ ya kanser ya bɔɔngɔ́ na lisalisi ya rayon gamma, moko na bokundoli ya sika mpo na kosalisa bato na nzela oyo ebéngami radiation.
Bibongiseli bizwamaki mpo ete Cheng afanda epai na Batatoli ya mboka Japon oyo bazali penepene na lopitalo yango. Etuluku moko ekendaki koyamba ye na bokiti ya mpɛpɔ, kati na bango Batatoli ya Yehova mibale oyo balobaka lokótá Thaï mpe momonisi moko ya Biro mpo na makambo matali minganga. Nsima ya kosala ekizamɛ na boumeli soko ya pɔ́sɔ moko, Cheng akɔtaki na lopitalo epai basalaki ye lipasó na lisalisi ya rayon gamma. Lipasó yango eumelaki bobele ngonga moko mpamba. Wana abimaki na lopitalo nsima ya mokolo moko, Cheng akamataki nzela ya bozongi epai na ye na Thaïlande na mokolo molandaki.
Cheng alobaki ete: “Nakokaki soko moke te kokanisa ete lisalisi monene likokaki mpenza kopesama na nzela ya ebongiseli wana. Nakamwaki mingi na bolingo oyo bamonisaki epai na ngai mpe na boyokani malamu kati na bituluku bikeseni oyo bitalelamaki na likambo yango.”
Kolobeláká eteni moke ya nsango wana, Mainichi Shimbun, zulunalo ya mboka Japon elobaki ete: “Kino sikawa, bantina ya losambo mpo na koboya kozongisama makila nde elobelami mingi. Nzokande, kozongisama makila ezali na makámá oyo mautaka na yango, lokola sida, kozwa bokɔnɔ lokola hépatite C, mpe kozanga boyokani ya makila ya moto moko na nzoto ya moto mosusu. Mpo na ntina wana ezali na babɛ́li oyo bandimaka te kozongisama makila kozanga kotalela bindimeli ya mangomba na bango.”
Zulunalo yango elobaki lisusu ete: “Babɛli mingi oyo baboyaki ete bázongisa bango makila basengelaki na makasi kokenda na lopitalo mosusu, kasi esengeli nde mbongwana esalema epai na bibongiseli ya minganga mpo na komemya mokano ya mobɛ́li. Kondima likambo oyebi malamu (mobɛ́li azwi ndimbola malamu na oyo ekosalema mpe na nsima andimi lisalisi yango) esɛngami, mpe ezali bobele bongo na likambo ya kozongisama makila. Esengeli koyeba malamu ete oyo ezali te likambo litali bobele lingomba moko boye.”
Lokola Cheng Sae Joo, mingi oyo baponaki kosalisama kozanga kozongisama makila basengeli kotika lopitalo moko mpo na koluka mosusu. Nzokande, bazali na botɔ́ndi mpo na milende ya minganga oyo bandimi komemya ntómo na bango ya babɛ́li.
Biro mpo na makambo matali minganga etyamaki na Lisangá ya Batatoli ya Yehova kati na ba filiales ya la Société Watch Tower mpo na koluka boyokani elongo na minganga oyo bamemyaka bindimeli na bango. Kati na mokili mobimba, BMM ezali kotya boyokani malamu elongo na mapitálo, minganga, basáli na mapitálo, avocats mpe basambisi.