Bosolo ya Evanzile
UTA na mobu 1901, Eteyelo monene ya Magdalen, na engumba Oxford, na Angleterre, bazali na biteni mike misato ya maniskri ya Evanzile ya Matai, oyo ebéngami P64. Na boumeli ya eleko moko, banganga-mayele bazalaki kokanisa ete maniskri yango esalemaki na nsuka ya ekeke ya mibale T.B.
Kala mingi te, Carsten P. Thiede, nganga-mayele moko oyo ayekolaka bapapiris na Paderborn, na Allemagne, asalaki boyekoli mozindo likoló na P64, oyo ezali na biteni ya milɔngɔ́ 10 ya Matai mokapo 26. Ebimisaki litomba nini? Kati na zulunalo Zeitschrift für Papyrologie und Epigraphik (Zulunalo ya boyekoli papiris mpe makomi ya kala), Thiede alobeli biteni ya maniskri ya Oxford ete ezali “eteni ya codex moko ya baklisto ya ekeke ya liboso, ekoki kozala mbala mosusu (kasi ekoki kozala bongo to mpe ekoki kozala bongo te) ete esalemaki na mobu 70 AD.”
Makambo oyo Thiede akomaki elamwisaki likebi ya bapanzi nsango mpe ya banganga-mayele. Mpo na nini? Mpamba te, oyo bato mingi bandimaka lelo ete ezali eteni oyo eumeli mingi koleka biteni nyonso ya makomi ya Baevanzile ezali bongo P52, eteni moko ya maniskri ya Evanzile ya Yoane oyo esalemaki uta na mobu soko 125 T.B., to bobele na boumeli ya ekeke ya mibale.
Tosengeli naino kozela mpo na koyeba soki dati ya sika oyo epesami mpo na biteni ya papiris P64 ekondimama na banganga-mayele mingi. Ata soki ekondimama to ekondimama te, dati oyo ya liboso ekosala te bobele ete P64 ezala biteni ya maniskri ya Evanzile oyo eumeli mingi koleka; kasi ekobakisa mpe elembeteli mosusu oyo emonisi ete Evanzile ya Matai ekomamaki mpenza na ekeke ya liboso, mbala mosusu kútu liboso ya mobu 70 T.B., wana bato mingi oyo bamonaki makambo matali bomoi ya Yesu bazalaki naino na bomoi mpo na kondimisa bosolo ya Evanzile.