Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 1/2 lok. 32
  • Búku ya nzembo oyo Irina alingaka mingi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Búku ya nzembo oyo Irina alingaka mingi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 1/2 lok. 32

Búku ya nzembo oyo Irina alingaka mingi

ESILI koleka kala mingi te, Irina, mwana moko ya moke ya mwasi ya mibu libwa, mofandi na engumba Sofia, na Bulgarie, abatisamaki mpe akómaki Motatoli ya Yehova. Alingaka koyemba mpe ayembaka mingi mpenza nzembo oyo izali kati na búku Nzembo mpo na kokumisa Yehova. Na yango, Irina amityelaki mokano ya kokanga mwa ndambo ya nzembo yango na motó sanza na sanza.

Moko na mateya oyo Irina alingaka mingi na kelasi ezali bongo miziki. Nzokande molakisi na ye ya miziki akamwaki na ntango Irina aboyaki koyemba kati na etuluku ya bayembi ya eteyelo. Mpo na nini Irina aboyaki? Asosolaki ete miziki mingi oyo balingaki kosɛnga na ye ete ayemba ezalaki kosanzola bilombe mpe mikolo ya lokumu ya ekólo oyo eutelo na yango ezali bongo ya bopakano. Nzembo mosusu izalaki kokumisa ezaleli ya botomboki mpe mobulu mpo na kotombola mikano ya ekólo. Molakisi akokaki te kososola etɛlɛmɛlo ya Irina na ntina na likambo yango. Irina amonaki malamu ete atinda nkomá epai na molakisi na ye na komonisáká bindimeli makasi na ye ya losambo​—kasi yango ebimisaki litomba te.

Tata na Irina azwaki likanisi moko. Apesaki epai na molakisi yango búku Nzembo mpo na kokumisa Yehova, oyo ezali na nzembo oyo Irina alingaka koyemba mingi. Na mwa mikolo oyo milandaki na nsima, molakisi abéngaki Irina kati na ndako ya kelasi epai bayekolaka miziki. Asɛngaki na Irina ete ayemba ndambo ya nzembo oyo ye alingaka mingi​—liboso ya baninga na ye ya kelasi—​wana molakisi azalaki kobɛta piano. Eumelaki soko koleka ngonga moko! Molakisi yango andimisamaki solo ete búku ya nzembo oyo Irina alingaka mingi ezali na nzembo kitoko!

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto