Yo osilá kobikisama?
JOHNNY azalaki na mibu zomi na ntango mobali moko atɛlɛmisaki ye kati na foire moko mpe atunaki ye ete: “Elenge mobali, oyambi Yesu Klisto lokola Nkolo mpe Mobikisi na yo?” Motuna yango mokamwisaki Johnny mpenza, mpamba te uta kala azalaki kondimela Yesu. Na yango, ayanolaki ete, “Ee, nandimi.” Mobali yango agangaki na mongongo makasi ete, “Nkolo asanzolama! Molimo mosusu mobikisami mpo na Klisto!”
Kobikisama ezali mpenza likambo ya pɛtɛɛ bongo? Johnny “abikisamaki” longwa na ntango oyo abimisaki maloba wana, kozanga kotalela makambo nyonso oyo akokaki kosala kati na bomoi na ye? Bato mingi ya motema sembo bakoyanola ete ee. Batrakte mosusu ya mangomba elobi ete ebongi kokoma dati oyo “obikisamaki” mpo ete okoka komikundola yango.
Mokonzi moko ya lingomba akomaki ete na “ntango oyo moto amonisi bobele kondima kati na Klisto, . . . bomoi na ye na mikolo mizali koya esili kokanama mpo na libela.” Alobaki ete Biblia elobaka ete kobikisama etali na mbala moko, “eyambweli [moko] ya kondima, kasi te kolanda komonisa kondima.” Mokomi mosusu ya babúku ya mangomba akomaki ete: “Yango ezali mosala mokokisami. Yango esilaki kokokisama mpo na yo . . . ‘Etumba esili’ mpo na yo. ‘Mabe’ na yo ‘masili kolongolama.’” Kasi, ata bato oyo bandimisami makasi ete ezali bongo bakoki kokutana na mokakatano moko. Ezali komonana polele ete bato mingi oyo balobelamaki ete “babikisami” bamitambwisaka te engebene oyo Biblia ezali kosɛnga na bango. Ekanisamaka ete mbala mosusu “bandimaki” mpenza Klisto te.
Na yango, “kondima” Klisto elimboli mpenza nini? Yango ezali eyambweli ya kondima oyo moto asali bobele mbala moko, to yango lolenge ya bomoi esengeli kolandana ntango nyonso? Kondima na biso esengeli mpenza kozala makasi na boye ete yango ekoka kopusa biso na kosala misala? Tokoki solo kondima kozwa matomba ya mbeka ya Yesu kozanga kokokisa mokumba motali kolanda ye?
Bato mingi balingi kozwa mapamboli kasi balingi te kondima mikumba oyo kolanda mpe kotosa Yesu esɛngaka. Ya solo, liloba “kotosa” mbala mingi etungisaka bango. Nzokande, Yesu alobaki ete: “Yaká kobila ngai.” (Luka 18:18-23) Mpe Biblia ezali koyebisa ete: “Baoyo . . . bazangi kotosa Nsango Malamu na Nkolo na biso Yesu bakozwa lifuti na kobeba na seko.”—2 Batesaloniki 1:8, 9; Matai 10:38; 16:24.
Biblia ezali kolobela makambo mingi oyo mazali kobimisa mituna minene na ntina na makambo oyo mazali koteyama na ntina na kobikisama. Soki olingi kotalela oyo Biblia ezali mpenza koloba na ntina na lisoló oyo, okomona ete makambo oyo mazali na nkasa ilandi mazali solo kosepelisa. Fungolá Biblia na yo, mpe tángá mikapo oyo mipesami mpo okoka komona oyo Yesu mpe bantoma na ye bateyaki mpo na likambo yango ya ntina mingi.