Bakati likambo ya Batatoli ya Yehova
NSIMA ya kozongisama nsima mbala na mbala, Esambiselo monene ya Thessalonique, na Grèce, eyaki bongo na nsuka koyangana na mokolo ya 8 Yúni 1995, mpo na koyoka likambo oyo mpo na yango Batatoli ya Yehova minei ya basi bafundamaki. Bafundamaki mpo na likambo nini? Bapalanganisaki mateya ya lingomba, likambo oyo mibeko ya Grèce epekisaki yango na boumeli ya bambula koleka ntuku mitano.
Nzokande, na ntango oyo esambiselo eyanganaki, moto ya liboso oyo asengelaki kondimisa likambo oyo efundamaki—sángó oyo asalaki nyonso ete basi wana minei básambisama—azalaki lisusu na bomoi te. Sángó mosusu amekaki koloba na esika na ye, kasi esambiselo eboyaki kondima maloba na ye. Na yango, ezali likambo ya kokamwa te ete bayokaki ye koloba bobele na miniti 15! Zúzi ayokaki mpe maloba ya bato mosusu oyo basengelaki koloba mpo na kondimisa efundeli wana mpe amonaki ete bafundami bazalaki na likambo te mpo na oyo etali kopalanganisa mateya ya lingomba na lolenge epekisami na mibeko. Ekateli yango emonisaki ete bisambiselo ya Grèce bizali na bolingo malamu ya kotosa mpe ya kolanda ekateli oyo ekamatamaki na 1993 na Esambiselo eleki monene mpo na mikili ya Mpótó mpo na kobatela bonsomi ya bato.
Ezalaki likambo ya kokamwa, mingi mpenza, na komona basi misato oyo balobaki mpo na kondimisa efundeli yango babɛlɛmaki epai na Batatoli oyo bafundamaki, mpe na motema mobimba mpenza, bapesaki bango longonya. Moko na bango alobaki ete: “Tozali kosɛnga bino bolimbisi mpo na makambo nyonso oyo masalemaki.” Abakisaki ete: “Ezalaki libúngá na biso te. Sángó nde apusaki biso na makasi ete tófunda bino. Sikawa lokola azali lisusu na bomoi te, tolingi ete bóya na mboka na biso mpe kati na bandako na biso.”
Na yango, na mbala oyo lisusu Yehova alóngisi basaleli na ye na lolenge ya kokamwa na Grèce. Mibeko oyo mizalaki kopekisa kopalanganisa mateya ya lingomba mibimaki na Grèce na 1938 mpe 1939. Na 1993, Esambiselo eleki monene mpo na mikili ya Mpótó mpo na kobatela bonsomi ya bato eyebisaki ete kosalela mobeko wana mpo na konyokola Batatoli ya Yehova elongobani te.—Talá Mosenzeli ya 1 Sɛtɛ́mbɛ 1993, lokasa 27 kino lokasa 31.