Makabo: esengeli komizela na yango?
NTANGO mosusu oyebi malamu ete mbala mingi kopesa makabo epusamaka na mimeseno. Na bisika mingi ezali na mabaku oyo bato bazelaka makabo. Makabo lolenge yango makoki kopesama lokola elembo ya limemya to mpo na komonisa bolingo. Mingi na makabo yango masalelamaka soko moke te na baoyo bazwaka yango; mosusu ekokisaka mpenza bosɛnga ya baoyo bazwi yango mpe etalelamaka na botɔ́ndi mingi.
Na Danemark, ntango mwana abotami, baninga mpe bandeko ya mosuni bayaka kotala ye na makabo oyo bakanisaka ete makoki kosunga ye. Na bamboka mosusu, baninga babongisaka elambo moko epai makabo lolenge yango mapesamaka liboso mpo na kolɛngɛla kobotama ya mwana.
Mbala mingi, mabaku oyo bato bmizelaka kozwa makambo mpo na yango mazalaka bongo makambo oyo masalemaka mbula na mbula. Atako bilambo motindo yango biyebanaki te kati na baklisto ya liboso, yango esili kopalangana mingi epai na baoyo bazali komitánga baklisto mpe epai na baoyo bazali baklisto te. Na bisika mosusu soki mwana asili kokóla, batikaka kopesa ye makabo ya bokundoli mokolo na kobotama na ye, kasi ezali bongo te na momeseno ya Bagreke. Na mboka Grèce batyaka likebi monene na mikolo ya kobotama. Bapesaka mpe makabo na “mokolo ya ndoi.” Yango ezali nini? Mimeseno ya losambo misili kopesa mokolo moko na moko na “mosantu” moko, mpe bato mingi bazwaka nkombo ya “basantu.” Wana mokolo ya “santu” yango ekómi, baoyo nyonso bazali na nkombo na ye bakozwaka makabo.
Longola bilambo ya kokundola mikolo ya mbótama ya bana, ba Coréens bazalaka na mokolo ya ekólo oyo eyebani lokola Mokolo ya Bana. Ezalaka ntango oyo baboti bakendeke kotambola elongo na bana mpe bapesaka bana makabo atako yango ezali mokolo na bango ya kobotama te. Ba Coréens bazalaka mpe na Mokolo ya Baboti, wana bana bapesaka baboti makabo, mpe Mokolo ya Balakisi, wana banakelasi bakumisaka balakisi na bango na kopesáká bango makabo. Engebene bonkɔ́kɔ ya ba Coréens, ntango moto akokisi mibu 60, elambo moko monene ebongisamaka. Bandeko mpe baninga basanganaka mpo na kotombela ye bomoi molai mpe bolamu, mpe bapesaka makabo na moto oyo akokisi bambula yango.
Libala lizalaka mpe libaku mosusu wana momeseno mosɛngaka kopesa makabo. Na Kenya, wana bato basali libala, libota ya mobali lisengeli kopesa libota ya mwasi likabo. Babyangami mpe bamemaka makabo. Soki babalani balandi momeseno ya mboka, bakofanda na esika ebongisamaki mpo na bango liboso na bato banso, wana babyangami bazali komemela bango makabo. Ntango moto na moto azali koya na likabo na ye, liyebisi likopesama ete “Songolo amemaki likabo mpo na babalani.” Mingi oyo bapesi makabo bakozala na mawa soki batángi bongo nkombo na bango te.
Epai na ba Libanais, wana moto moko abali, na boumeli ya mikolo milandaka na nsima, baninga mpe bato ya mpembeni, ata bato oyo bayebi babalani malamu te, bakoyaka mpo na kopesa makabo na bango. Bateyamaka uta bomwana ete, kopesa makabo ezali mokumba, lokola oyo ya kofuta nyongo. Mobali moko, moto ya Liban, alobaki ete: “Soki osali yango te, okomiyoka malamu te. Ezali momeseno ya bonkɔ́kɔ.”
Nzokande, kati na mabaku nyonso oyo bato bazelaka na yango makabo, Eyenga ya Mbótama eleki mpenza. Ezali mpe bongo na mboka epai ofandi? Kala mingi te, na 1990, ekanisamaki ete ba Américains basalelaka mosolo badolare miliare 40 mpo na makabo ya Eyenga ya Mbótama. Elambo yango ekumisamaka mpe na loyenge mingi epai na ba Bouddhistes mpe ba Shintoïstes ya Japon, mpe mitindo mikeseni ya elambo yango mimonanaka mpe na Mpótó, na Amerika ya Súdi, mpe na biteni mosusu ya Afrika.
Eyenga ya Mbótama ezalaka libaku oyo bato bamizelaka ete bakozala na esengo, nzokande ezalaka bongo te mpo na mingi na bango. Bato mingi bamonaka ete kowela kosomba makabo mpe motungisi ya kofuta nyongo ya makabo oyo badefaki elimwisaka mpenza bisengo nyonso oyo bakokaki kozwa.
Nzokande, Biblia elobi ete kopesa makabo ememaka esengo. Na ntembe te esengo ezali, kasi yango etaleli elimo oyo ezali kopusa na kopesa makabo.—Misala 20:35.