Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 1/12 lok. 8
  • “Osala mosala na mopalanganisi na nsango malamu”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Osala mosala na mopalanganisi na nsango malamu”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Masolo mosusu
  • “Salá mosala ya mopalanganisi ya nsango malamu”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Baklisto nyonso ya solo basengeli kozala bapalanganisi ya nsango malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Kokisá mokumba na yo ya mopalanganisi ya nsango malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Banani bazali basakoli ya solo ya nsango malamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 1/12 lok. 8

Masoló ya Basakoli ya Bokonzi

“Osala mosala na mopalanganisi na nsango malamu”

ELIMBOLI nini kozala mopalanganisi ya nsango malamu? Liloba yango libongoli liloba ya Greke eu·ag·ge·li·stesʹ, oyo ezali penepene na liloba eu·ag·geʹli·on, oyo elimboli “nsango malamu.” Na yango, mopalanganisi ya nsango malamu azali mosakoli, to momemi, ya nsango malamu.

Baklisto nyonso ya solo bazali bapalanganisi ya nsango malamu mpamba te basakolaka nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Na lolenge lobongi mpenza, ntoma Paulo alendisaki Timoté na “kosala mosala na mopalanganisi na Nsango Malamu.” Timoté asengelaki kotya likebi mpenza na mosala yango. Paulo alendisaki ye na ‘komisɛnzɛla na makambo nyonso’ mpe na ‘kokokisa lisungi na ye nyɛ.’​—2 Timoté 4:5.

Lokola tozali bapalanganisi ya nsango malamu biso mpe totyaka mpenza likebi na mosala na biso mpe ‘komisɛnzɛla na makambo nyonso,’ to tosɛnzɛlaka ete tósakola nsango malamu na libaku nyonso. Na yango, mingi basili koyeba Yehova mpe bilaka na ye nsima ya kosolola elongo na Batatoli ya Yehova na litatoli ya libaku malamu. Esalemaki bongo mpo na Seymore, mobali moko oyo azali kofanda na Barbade.

Seymore azalaki molakisi na eteyelo moko ya Leta. Charles, oyo azalaki Motatoli ya Yehova mpe molakisi mpo na ndambo ya mokolo na eteyelo wana, azalaki mopalanganisi ya nsango malamu ya likebi mingi. Azalaki mosáli ya ntango nyonso, to mobongisi-nzela, mpe azalaki kosalela mabaku nyonso mpo na kosakola nsango malamu epai na basusu. Ezalaki na lisalisi ya Charles nde Seymore ayokaki mpo na mbala ya liboso nsango ya Bokonzi na litatoli ya libaku malamu.

Kozanga koumela Seymore mpe azwaki ekateli ya kosakola solo ya Biblia epai na bato mingi oyo ye akokaki kokutana na bango. Na yango abandaki masoló ya Biblia elongo na baoyo bazalaki na eteyelo wana, mingi mpenza elongo na bayekoli na ye. Atako na mikili mingi makambo ya losambo malakisamaka te na biteyelo ya Leta, mobali yango apesamelaki mokumba ya kolakisa mitindá ya losambo mpe ya bizaleli malamu. Kasi sikawa makanisi ya kala ya Seymore na ntina na makambo wana masilaki kobongwana mpe matikaki esika na boyebi ya Biblia oyo autaki kozwa yango sika. Na ntango na bopemi, azalaki kosolola elongo na banakelasi na ye na ntina na elaka ya Nzambe ya mokili ya sika mpe na ntina na elikya ya bomoi ya seko.

Bana yango bayanolaki lolenge nini? Mingi na bango bamonisaki bosepeli ya solo mpo na nsango malamu ya Bokonzi ya Yehova. Na mikolo milandaki, Seymore abandaki kotambwisa boyekoli ya Biblia 13 elongo na bamoko kati na bayekoli na ye. Bosepeli na bango ezalaki mpenza makasi na boye ete bamibongisaki mpo na koyekola Biblia mbala mibale na pɔ́sɔ moko. Na nsima, mingi na bango babandaki koyangana na makita na Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova na mboka wana. Sikawa, kati na bango, libwa basili komipesa mpe kozwa batisimo lokola Batatoli ya Yehova. Sikawa Seymore azali komipesa mingi na mosala na ye, lokola mobongisi-nzela ya sanza na sanza mpe nkulutu kati na lisangá moko ya Batatoli ya Yehova na Barbade.

Wana ezali bobele ndakisa moko ya lolenge oyo Batatoli ya Yehova na mokili mobimba ‘basalaka mosala ya mopalanganisi ya nsango malamu,’ na kosakoláká na litatoli ya libaku malamu. Bazali kolanda toli ya Biblia oyo ezwami na Bakolose 4:5, 6, oyo elobi ete: “Bózalaka na bizaleli na mayele liboso na bato na libándá; bótondisa ntango na bino. Tiká ete maloba na bino mazala na ngɔlu, na elɛngi na mongwa ntango nyonso ete bóyeba soko ekoki na bino kozongisela bato nyonso maloba nini.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto