Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 15/11 lok. 31
  • “Bókangana na ekanganeli na bokesene te”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bókangana na ekanganeli na bokesene te”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 15/11 lok. 31

“Bókangana na ekanganeli na bokesene te”

NGƆMBƐ mibali mibale oyo ityami awa izali na nguya mingi, oyo ekopesaka yango likoki ya kobenda biloko ya bozito kozanga nkaká. Kasi kanisá naino ete batye mpunda moko na esika ya ngɔmbɛ mosusu. Lokola mpunda ezali moke mpe na nguya mingi te lokola ngɔmbɛ mobali, ekoki mpenza kotomboka mpe kobanda kotutatuta mabaya oyo makangisi ye na ekanganeli wana ya bokesene. Ezalaki bongo na ntina, soki mobeko ya Nzambe epai na Yisalaele elobaki ete: “Okotimola na ngɔmbɛ mpe na mpunda esika moko te.”​—Deteronome 22:10.

Ntoma Paulo akomaki likambo motindo moko na ntina na bato. Alobaki ete: “Bókangana na ekanganeli na bokesene te, esika moko na bato bazangi kondima.” (2 Bakolinti 6:14) Likambo oyo lisengeli mpenza kobatelama na makanisi wana moto azali koluka mobalani. Libala lizali bokangani ya libela, mpamba te Yesu Klisto alobaki ete: “Oyo nde Nzambe asili kotonga, tiká te ete moto akangola yango.” (Matai 19:6) Mitungisi mingi mibimaka soki babalani bazali na bindimeli, na mitindá mpe na mikano lolenge moko te. Na yango, likambo ya mayele lizali bobele kolanda toli ya Biblia oyo etali kobala “bobele kati na Nkolo.” (1 Bakolinti 7:39) Komikɔtisa na nsinga ya libala elongo na moto oyo azali na kondima moko na yo te ekobimisa nkutu mikakatano minene koleka kokangisa ngɔmbɛ mobali elongo na mpunda.

Bokeseni kati na bindimeli ya lingomba ezali bobele moko na makambo oyo makoki kosala ete babalani bákangana na ekanganeli ya bokesene. Ekozala malamu ete bato oyo bazali kokana kobalana​—ata baoyo bazali na kondima moko​—bámituna mituna lokola oyo, ‘Tozalaka na mikano lolenge moko? Tokofanda epai wapi? Nani akobomba mosolo ya libota? Biso nyonso mibale tosengeli kosala? Ezali boni mpo na kobota bana? Boyokani na biso kati na libala ekotambwisama na boboto mpe na limemya?’

Na meko mosusu, lolenge na bino ya kosolola makambo oyo ekomonisa soki bokangani na bino bokozala ya malamu to ya bokesene. Ezali solo ete, bato mibale bakoki soko moke te koyokana na makambo nyonso. Nzokande, mbala mingi, soki bato mibale oyo bazali kokana kobalana bakoki kotalela mikakatano mpe kosilisa yango elongo mpe soki bakoki ntango nyonso kosolola polele kati na bango, emonani mpenza ete bakozala na ekanganeli ya bokesene te.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto