‘Lokola ebende epelisaka ebende mosusu’
PENE na nsuka ya ekeke ya misato T.B., elenge moko ya sembo na nkombo Anthony, abéngamaki “moklisto ya lingomba ya Copte,” amitangolaki na mokili mpe alekisaki mibu 20 bobele ye moko kati na mokili mokauki. Mpo na nini? Amonaki ete wana ezalaki lolenge loleki malamu mpo na ye kosalela Nzambe. Azali moto ya liboso kati na boklisto ya nkombo mpamba oyo ayebanaki mingi oyo amitangolaki na bato.
Lelo oyo, bobele ndambo moke mpenza ya bato bamitangolaka. Kasi bato mingi bazali koluka komitangola na lolenge mosusu. Bazali koboya kosolola na basusu na ntina na makambo matali losambo, bazali kokanisa ete masoló motindo wana ememaka na koswana mpe na bitumba. Losambo na bango etaleli mingimingi koboya kosala mabe epai na bazalani na bango.
Ya solo, koboya kosalela bazalani na yo mabe ezali moko na masɛngami ya lingomba ya solo, kasi esuki bobele wana te. Lisese moko ya kala elobaka ete: “Ebende epelisaka ebende mosusu. Bobele bongo moto moko apelisaka elongi ya moto mosusu.” (Masese 27:17, NW) Ezali mpenza boye ete, Biblia ezali kolendisa baklisto ete báyanganaka esika moko, kasi bamitangolaka te. Elobi ete: “Tótala ete tópesana simbisi moko na moko mpo na kolinganaka mpe kosalaka misala malamu. Tótika koyangana elongo moko te, pelamoko motindo na bamosusu.” (Baebele 10:24, 25) Batatoli ya Yehova bazali kolanda toli wana. Bayanganaka elongo mbala mingi na pɔ́sɔ mpo na ‘kopelisa elongi ya moko na mosusu,’ kolendisáká bongo kondima ya baninga na bango bandimi. Bamoni ete kosolola na ntina na Biblia na bosembo nyonso ebimisaka bitumba te. Ebimisaka nde boyokani mpe kimya. Ezali eteni ya ntina ya losambo ya solo.