Masoló ya Basakoli ya Bokonzi
Kopesa litatoli ezali kobota mbuma na ndako mpe na eteyelo
BOMOI ya moklisto esangisi likambo ya kosala malamu epai na basusu, mingimingi koyebisa bango nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Masese 3:27 elobi ete: “Boyá kosalela bato malamu te baoyo bakoki kozwa yango, wana lobɔkɔ na yo ezwi eposa na kosala bongo.” Na Argentine, elenge moko Motatoli oyo azalaki na kelasi ya misato na eteyelo ya katikati asepelaki koyebisa nsango malamu ya Bokonzi epai na moninga moko ya eteyelo. Litatoli yango libimisaki matomba mingi mpenza.
Mokolo moko elenge Motatoli wana ayebisaki na moninga na ye ete ezali te mangomba nyonso nde mazali malamu. Ntango elenge mobali yango ayanolaki ete ye asalaka makambo mabe te, Motatoli alobaki ete: “Osalaka mpe eloko moko te mpo na Nzambe.” Yango ememaki ye na kokanisa. Na nsima elenge Motatoli wana alimbwelaki ye ete, oyo ezali mikolo ya nsuka mpe mpo na kosepelisa Nzambe, tosengeli kozala na boyebi ya solo ya Biblia mpe kosalela yango. Moninga na ye ya eteyelo andimaki. Kasi libota na ye likokaki kopesa ye nzela ya koyekola Biblia? Mpo na kosunga moninga wana na eloko moko oyo ekokaki kosalisa ye na kokanisa, elenge Motatoli wana asɛngaki ye ete atángaka búku Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis.
Ntango elekaki, mpe moninga wana ya eteyelo alongwaki na eteyelo yango. Nsango na ntina na ye eyokanaki te na boumeli ya koleka mbula moko. Bongo mokolo moko elenge Motatoli akamwaki wana azwaki libyangi ya telefone ya moninga na ye oyo alobaki ete azalaki komona kokokisama ya bisakweli ya Biblia. Nokinoki Motatoli abongisaki boyekoli ya Biblia elongo na ye.
Ntango akendaki na ndako epai na moninga na ye ya kala ya eteyelo, amonaki ete baboti ya moninga na ye bazalaki komitungisa mingi na ntina na makambo oyo mwana na bango ya mobali azalaki komikɔtisa na yango. Nkutu lɛki na ye ya mobali akanisaki ete ye akómi na ligboma. Na yango baboti na bango basɛngaki na lɛki na ye ete asangana na boyekoli oyo elingaki kolanda nsima. Na nsuka ya boyekoli, na mpisoli na miso, elenge mobali yango ayebisaki na baboti na bango ete nkulutu na ye ya mobali akómi ligboma te, yango ememaki mama na bango na koyanola ete, “Na esika ya mokakatano moko, nakómi na yango sikawa mibale!”
Na yango, na boyekoli oyo elandaki nsima ye moko azalaki wana, mpe andimaki ete bana mibali bakómaki na ligboma te. Na nsima boyekoli ya Biblia ebongisamaki elongo na ye mpe mobali na ye. Mosika te libota mobimba ebandaki koyangana na makita ya lisangá na Ndako ya Bokonzi. Na nsima, bankɔ́kɔ mpe babandaki koyekola Biblia mpe babandaki koyangana na makita. Uta ntango yango, elenge mobali ya liboso asilaki kozwa batisimo. Asili kobala, mpe ye elongo na mwasi na ye bazali basakoli ya molende.
Lisusu, na nzela ya litatoli ya libaku malamu na eteyelo, elenge Motatoli wana asungaki banakelasi mosusu mibale elongo na mama mpe ndeko mwasi ya moko na bango ete bábanda koyekola Biblia. Nyonso, bato 11 bayekolaki solo ya Biblia mpamba te elenge Motatoli wana aboyaki te kosala malamu epai na baninga na ye banakelasi. Oyo nde mbano malamu! Ya solo, “Esengo ezali na bato oyo [Yehova] azali Nzambe na bango!”—Nzembo 144:15.