Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 1/9 lok. 32
  • ‘Ah, soki bato nyonso bazalaki lokola bango!’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Ah, soki bato nyonso bazalaki lokola bango!’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 1/9 lok. 32

‘Ah, soki bato nyonso bazalaki lokola bango!’

Wana ezalaki maloba ya mokomi moko na zulunalo ya Luxembourg, Letzebuerger Journal. Alobaki bongo na ntina na banani?

Akendeki na Pologne mpo na koyangana na molulu ya bokundoli mibu 50 ya kotikama ya Auschwitz mpe amonaki ete etuluku moko oyo enyokwamaki mingi kuna elobelamaki te. Kati na makambo oyo akomaki mokolo mwa 2 Febwáli 1995, mokomi yango alobaki ete etuluku yango ezali bongo Batatoli ya Yehova, mpe akomaki ete: “Ata konyokwama makasi kati na bolɔ́kɔ to káa ya bakangami, ata likámá ya kokufa na nzala kati na bolɔ́kɔ to ya kokatama nkingo, eloko moko te ekokaki kopusa bango na kowangana kondima na bango.” Alobaki lisusu ete: “Ata basodá mabe ya SS bakamwaki mingi na mpiko oyo esalaki ete Batatoli ya Yehova bandima ata kokufa.”

Batatoli ya Yehova balukaki liwa te. Kasi, na ndakisa ya Baklisto ya ekeke ya liboso, bankóto mingi na bango baponaki kokufa na esika ya kobuka mitindá ya boklisto. Kondima motindo wana emonisaki bango ete bakesanaki mpenza na basusu na boumeli ya eleko wana ya molili ya bokonzi ya Nazi.

Mokomi yango asukisaki ete: “Ah, soki bato nyonso bazalaki lokola Batatoli ya Yehova!” Soki ezalaki bongo, mbɛlɛ etumba ya mibale ya mokili mobimba elingaki kobima te.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto