Kobɔndisama mpo na baoyo babomamaki mpamba
YANGO ezali moko na misala mabe mileki nsɔ́mɔ oyo misalami na bato—mbeka ya bana mpo na molulu ya losambo. Bato mosusu bandimaka te ete makambo ya nsɔ́mɔ motindo yango makokaki kosalema. Kasi elembo monene wana ya losambo ya ba Phéniciens endimisamaki na biloko mingi ya kala oyo bikundolamaki na arkeolozi.
Bana babotami na mabota ya lokumu bazalaki kopesama mbeka kati na mɔ́tɔ epai na banzambe lokola Tanit mpe Baal-Hammon. Na Carthage bana yango bazalaki kotumbama mbeka mpo na ekeko ya Kronos, oyo esalamaki na motako. Diodorus Siculus, mokomi ya makambo ya kala na ekeke ya liboso L.T.B., alobi ete bandeko ya mwana bapesamelaki nzela te ya kolela. Mbala mosusu bazalaki kokanisa ete mpisoli ya mawa ekokaki kokitisa motuya ya mbeka.
Na boumeli ya mwa ntango molulu lolenge yango mozalaki mpe kosalema pene na Yelusaleme na esika ya kala Tofɛtɛ. Kuna basambeli bazalaki kobina mpe kobɛta mbonda makasi mpo na kozimisa kolela ya mwana wana ezalaki ye kobwakama kati na litumbú ya mɔ́tɔ oyo ezalaki bongo libumu ya ekeko ya Moleke.—Yilimia 7:31.
Yehova asilikaka makasi epai na baoyo bakangaka matoi na bango liboso na mpasi ya bato mosusu. (Kokanisá na Masese 21:13.) Lokola azali Nzambe oyo amonisaka motema mawa epai na bana, Yehova akotya mpenza bana wana oyo babomamaki mpamba kati na “lisekwa na bato sembo mpe na bato sembo te.”—Misala 24:15; Exode 22:22-24.