Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 1/8 lok. 30
  • Kozongisa makila etalelami lisusu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kozongisa makila etalelami lisusu
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 1/8 lok. 30

Kozongisa makila etalelami lisusu

NA ELEKO ya mawa oyo SIDA ezali kongala, likámá eleki monene mpo na kolɔngɔ́nɔ́ ya moto ya maladi ezwami kati na ndako ya lipasó. Monganga Richard Spence, ye oyo azali kokamba esika ya kosala lipasó kozanga kozongisa makila, na Cooper Hospital-University Medical Center na Camden, na etúká ya New Jersey, Etats-Unis, uta koleka mibu zomi, alobi ete: “Tokoki soko moke te kopesa makila oyo mazali mpenza pɛtɔ.”

Ezali likambo ya kokamwa te, lopitalo yango esalisaka Batatoli ya Yehova mingi, oyo ekateli na bango ya koboya makila, oyo ezwi moboko na yango kati na Biblia eyebani malamu. (Levitike 17:11; Misala 15:28, 29) Nzokande, bato ya maladi mingi oyo bazali Batatoli te bakendeke mpe na lopitalo yango, mpamba te bazali komibanzabanza mingi na ntina na likámá oyo eyaka na kozongisama makila, kati yango mpe likámá ya kozwa hépatite, SIDA, mpe bamaladi mosusu. Zulunalo Courier-Post Weekly Report on Science and Medicine elobi ete: “Bokóli ya SIDA emonisi ntina ya kosala ekzamɛ́ ya makila. Kasi bokɔnɔ ekoki koleka kozanga komonana mpamba te moto akoki kozala na virus kasi ekoki naino komonana te na ntango ya bosáli ekzamɛ́.”

Mpo na makámá motindo wana, Lopitalo oyo esalaka lipasó kozanga kozongisa makila ezali kosalela myango mosusu na esika ya kozongisa makila, kati na yango kozongisa moto makila na ye moko lisusu​—mwango oyo Batatoli mosusu baboyaka yango te soki ekokisi masengami mosusu.a Mwango mosusu ezali bongo kosalelama ya bankisi oyo esalaka ete makila ya moto ya maladi mayikana mingi. Lisusu, nkisi oyo ekokani mpenza na makila kasi esalemi na makila te, esalelamaka mbala mosusu mpo na kopesa oxygène kozanga kozongisama makila. Monganga Spence alobi ete: “Batatoli ya Yehova balingi kozwa lisalisi malamu mpenza ya monganga, kasi balingi myango mosusu na esika ya kozongisama makila.”

Batatoli ya Yehova bazali na botɔ́ndi mpo boyokani malamu mpe lisungi oyo bazali kozwa epai na minganga oyo batosaka bindimeli na bango. Litomba emonani ezali oyo ete, bazali kozwa “lisungi malamu mpenza ya monganga” mpe bazali kobatela lisosoli ya pɛtɔ liboso na Yehova Nzambe.​—2 Timoté 1:3.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Lisoló molai ya mwango oyo mpe makambo oyo matalelami mpo na kokamata ekateli na yo moko, ekateli eyokani na lisosoli malamu, emonisami kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Marsi 1989 (ebimeli ya Lifalansé), lokasa 30 kino lokasa 31.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto