Nzambe nde azali koyangela mokili?
EZALI mokolo ya lomingo na ntɔ́ngɔ́. Bato mingi balongwi na mbeto na bango, balati bilamba, balei bilei ya ntɔ́ngɔ́ mpe bakei mbangu na ndako-nzambe. Kuna bayoki lisoló moko na ntina na lolenge Nzambe azali koyangela mabelé mobimba, kozanga ete moto mosusu abɛtɛla ye ntembe. Bayebisi bango ete azali komibanzabanza mpenza mpo na bato. Balobeli mpe bango makambo matali Yesu Klisto. Ekoki kozala bayokaki ete azali Mokonzi na bakonzi oyo liboso na ye mabɔ́lɔ́ngɔ́ nyonso mazali kogumbama mpo na kotosa ye.
Ezongi bango na ndako nsima ya kobima na ndako-nzambe, bato wana bakoki kofungola televizyó mpe kotala makambo oyo mazali koleka na mokili. Sikawa bayoki nsango ya nzala, mobulu, komela bilangwiseli, bobólá. Mpe bamoni bililingi ya bokɔnɔ mpe ya liwa ya bato oyo ezali kopesa mawa mingi.
Bato yango bakoki kobanda bongo komituna na ntina na makambo oyo bayokaki na ndako-nzambe mpe mingimingi makambo oyo malimbolamaki kuna ata moke te. Soki Nzambe azali na bolingo mpe na nguya nyonso, mpo na nini makambo ya nsɔ́mɔ mazali kosalema? Bongo ezali boni mpo na Yesu Klisto? Na ntembe te, ezali na mabɔ́lɔ́ngɔ́ mingi oyo mazali te kogumbama mpo na kotosa ye.
[Elilingi na lokasa 3]
Soki Nzambe nde azali koyangela mokili, mpo na nini ezali na mpasi mpe na yikiyiki motindo boye?
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 2]
Cover: NASA photo