Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 1/6 nk. 30-31
  • Mituna ya Batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya Batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Masolo mosusu
  • Ndenge oyo Yesu Klisto akoki kosunga biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Tozali na botɔndi mpo na boboto monene ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Tosikolami na nzela ya boboto monene
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Palanganisá nsango malamu ya boboto monene
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 1/6 nk. 30-31

Mituna ya Batángi

Lolenge nini matomba ya misala ya Klisto Yesu lokola Nganga Monene, oyo miyebisami kati na Baebele 4:15, 16, mazali kosalelama sikawa mpo na “bampate mosusu”?

Atako mokumba ya Yesu lokola Nganga Monene mozali libosoliboso na ndimbola mpo na baoyo bakozala elongo na ye kuna na likoló, baklisto oyo bazali na elikya ya kozala na mabelé bazali mpe kozwa matomba ata sikawa na misala na Yesu lokola Nganga Monene.

Kobanda Adama, bato bazali konyokwama na bozito ya lisumu. Tozali konyokwama na ntina na kozanga kokoka oyo tosangolaki, lokola ezalaki mpo na Bayisraele. Bazalaki kokende epai na banganga minene mpe banganga mosusu oyo bazalaki kokitana bamoko na basusu, baoyo bazalaki kopesa mbeka mpo na masumu na bango mpenza mpe mpo na masumu ya libota mobimba. Na nsima, Yesu apakolamaki lokola nganga “na motindo na Maliki-Sɛdɛkɛ.” Nsima na lisekwa na ye, Yesu amonanaki liboso na Yehova mpo na kolakisa motuya ya mbeka ya bomoi na ye ya moto na kokoka.​—Njembo 110:1, 4.

Yango elimboli nini mpo na biso lelo oyo? Kati na mokanda na ye epai na Baebele, Paulo azali kolobela mosala ya Yesu lokola Nganga Monene. Na Baɛbɛlɛ 5:1, tozali kotánga: “Mpo ete nganga monɛnɛ na nganga monɛnɛ oyo apɔnami kati na bato, atiami na mosala mpɔ na kosalela bato liboso na Njambe ete abimisa makabo mpe mbɛka mpɔ na masumu.” Na nsima, na milɔngɔ́ 5 mpe 6, Paulo amonisaki ete Yesu akómaki nganga monene, oyo akoki komemela biso bolamu.

Lolenge nini? Paulo akomaki ete: “Ata ajalaki Mwana, ayekoli kotosa mpɔ na koyoka mpasi, mpe esili ye kobɔngisama kwa, akomaki eutelo na lobiko na seko mpɔ na bango yɔnsɔ bakotosaka ye.” (Baɛbɛlɛ 5:8, 9) Ya liboso, mokapo wana mokoki kopesa biso likanisi ya lolenge oyo tokoki kozwa bolamu kati na mokili ya sika, wana ezalela ya masumu ya baoyo bazali sembo epai na Nzambe mpe Yesu ekolongolama mpe bakozwa bomoi ya seko. Yango ezali elikya moko kitoko, oyo moboko na yango mozali mbeka ya Yesu mpe mosala na ye lokola Nganga Monene.

Nzokande, tokoki solo kozwa matomba sikawa na mokumba na ye to na mosala na ye ya Nganga Monene. Talá na Baɛbɛlɛ 4:15, 16: “Tojali na Nganga Monɛnɛ tɛ oyo ajangi koyoka mpasi esika mɔkɔ na biso kati na bolɛmbu na biso. Nde amekami na makambo yɔnsɔ pelamɔkɔ biso, bobɛlɛ ete akwei na masumu tɛ. Boye, tika ete tobɛlɛma na molende epai na kiti na bokonji na ngɔlu ete tojua mawa mpe tomɔna ngɔlu na kosunga na ntango na bosenga.” Ntango nini elingaki kozala “ntango na bosenga”? Ezali wana tozali na mposa ete bamonisela biso mawa mpe ngɔlu. Biso banso, na ntina na ezalela na biso ya kozanga kokoka, tozali na mposa na yango sikawa.

Baɛbɛlɛ 4:15, 16 emonisi ete Yesu​—oyo azali sikawa nganga na likoló⁠​—​azalaki mpe moto, na yango akoki komitya na esika ya bato. Na esika ya bato nini? Na esika na biso. Ntango nini? Sikawa. Ntango azalaki moto, Yesu akutanaki na mitungisi mpe mikakatano oyo bato nyonso bakutanaka na yango. Na bantango mosusu, Yesu azalaki na nzala mpe na mposa ya komela. Mpe atako azalaki moto ya kokoka, azalaki mpe kolɛmba. Yango esengeli kokitisela biso motema. Mpo na nini? Mpamba te, lokola Yesu azalaki kolɛmba na misala mingi, ayebi malamu lolenge oyo mbala mingi tookaka. Tómikundola lisusu ete, Yesu asengelaki koyika mpiko liboso na koswana mpe zuwa oyo ezalaki kati na bayekoli na ye. (Malako 9:33-37; Luka 22:24) Ee, makambo ya kolɛmbisa mazalaki mpe kokómela ye. Yango esengeli kondimisa biso ete azali kososola ezalela na biso wana tolɛmbi, tozangi mpiko, boye te? Ezali mpenza bongo.

Soki olɛmbi, okoki kosala nini? Paulo alobaki ete osengeli bobele kozela kino, kati na mokili ya sika, ntango Yesu, Nganga Monene na yo akosalisa yo na kokóma na kokoka ya makanisi mpe ya nzoto? Te. Paulo alobaki ete: “Tojua mawa mpe tomɔna ngɔlu na kosunga na ntango na bosenga,” mpe yango esangisi mikolo na biso. Lisusu, ntango Yesu azalaki moto, akutanaki na mpasi mpe mikakatano, “amekami na makambo yɔnsɔ pelamɔkɔ biso.” Na bongo, ntango tokutani na makambo motindo wana, azali pene mpo na kosunga biso, na kotalela boyebi na ye na ntina na mpasi oyo ezali kokwela biso. Yango ezali te kobenda yo epai na ye?

Sikawa tótalela Heb 4 molɔngɔ́ 16. Paulo alobi ete biso​—mpe yango esangisi bapakolami elongo na basangani ya bampate mosusu⁠​—​tokoki kobɛlɛma na Nzambe na molende nyonso. (Yoane 10:16) Ntoma alobaki te ete tokoki koloba makambo nyonso oyo tolingi kati na libondeli, ata makambo mabe, ya kozanga limemya. Nzokande, na moboko ya mbeka ya Yesu mpe ya mokumba na ye ya Nganga Monene, tokoki kobɛlɛma na Nzambe atako tozali basumuki.

Lolenge mosusu ya kozwa matomba sikawa na misala ya Nganga Monene na biso, Yesu Klisto, etaleli bongo masumu, to mabunga na biso. Ya solo, tozali te komizela ete kati na ebongiseli oyo Yesu asalela matomba nyonso ya mbeka na ye mpo na biso. Ata soki asali yango, tokoki naino te kozwa bomoi na seko. Tómikundola likambo oyo lizwami na Luka 5:18-26, likambo ya mobali moko mokatatali oyo bakitisaki ye na litɔkɔ na ye na lidusu lifungwami na sambá. Yesu ayebisaki ye ete: “Ndeko, masumu na yɔ malimbisameli yɔ.” Yango elimbolaki te ete lisumu moko ya sikisiki nde likómisaki moto yango mokatatali. Yango esengeli bongo kolimbola masumu nyonso ya mobali yango, mpe na meko mosusu yango ekokaki mpe kosangisa kozanga kokoka oyo asangolaki, oyo epesaka mpasi.

Na moboko ya mbeka oyo asengelaki kopesa, Yesu akokaki kosilisa lisumu ya mobali yango, lokola ntaba mpo na Azazele ezalaki komema masumu ya Yisraele na Mokolo na Mbondi. (Levitike 16:7-10) Nzokande, mokatatali yango azalaki bobele moto. Akokaki lisusu kosala lisumu, mpe na nsima asengelaki kokufa, lokola basumuki nyonso. (Baloma 5:12; 6:23) Likambo oyo Yesu alobaki elimbolaki te ete mobali yango asilaki kozwa bomoi ya seko. Kasi mobali yango azwaki mapamboli ya mwa kolimbisama ya masumu na ye na ntango wana.

Tótalela sikawa ezalela na biso. Lokola tozangi kokoka, tosalaka mabunga mokolo na mokolo. (Yakobo 3:2) Tokoki kosala nini na ntina na yango? Kati na makoló tozali na Nganga Monene ya koyokela mawa oyo na nzela na ye, tokoki kobɛlɛma na Yehova kati na libondeli. Ee, lokola Paulo akomaki yango, biso banso tokoki “kobɛlɛma na molende epai na kiti na bokonji na [Nzambe] na ngɔlu ete tojua mawa mpe tomɔna ngɔlu na kosunga na ntango na bosenga.” Na bongo, baoyo nyonso bazali lelo kati na bampate mosusu bazali kozwa matomba kitoko, kati na yango lisosoli ya malamu, na misala ya Klisto lokola Nganga Monene.

Baklisto nyonso oyo bazali na elikya ya bomoi na mabelé bakoki kozela na esengo monene matomba maleki bonene kati na mokili ya sika oyo mosili kobɛlɛma. Na ntango yango, Nganga Monene na biso akosalela matomba nyonso ya mbeka na ye, oyo ekomema na kolimbisama ya masumu nyonso. Akopesa mpe matomba minene na kosungáká bato na kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto mpe ya elimo. Mpe Yesu akopalanganisa kolakisama kati na basaleli ya Nzambe na mabelé mobimba, mpamba te kolakisa Mibeko ezalaki mokumba monene ya banganga na Yisraele. (Levitike 10:8-11; Deteronome 24:8; 33:8, 10) Na yango, wana ezali biso kozwa matomba sikawa na misala ya Yesu lokola Nganga Monene, makambo minene mazali kozela biso!

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto