Mosolo ya ebendé oyo ezali na nkombo ya Nzambe
TALÁ malamu mosolo ya palata oyo elakisami awa. Esalemaki na mokonzi ya Allemagne, Guillaume V, na boumeli ya bokonzi na ye oyo ebandaki na mobu 1627 mpe eumalaki kino mobu 1637. Na ntango wana, Mikili ya Mpótó ya ntéi mizalaki kati na etumba oyo eumelaki mibu ntuku misato, kati na Bakotalike mpe Baprotestá. Guillaume V amikɔtisaki na ngambo ya Baprotestá. Mpo na kobimisa motuya monene ya mosolo oyo esengelaki mpo na bitumba, akamataki palata na ye nyonso mpe asalaki na yango misolo ya ebendé.
Likambo ya kobenda likebi ezali oyo ete mingi kati na misolo yango ya mabendé ezali na bililingi ya moi mozingi nkombo ya Nzambe, Yehova, na lolenge ya balɛtɛlɛ minei ya Liebele. Ezali mpe na nzeté ya mbila, oyo emonisi bongo bokasi. Yango elimboli ete atako nzeté yango engumbami na mopepe, kasi ekobukana te mpo ete Nzambe abateli yango. Makomi ya Latin oyo etyami na mosolo ya ebende ezali na nkombo ya Yehova mpe ezali komonisa elikya kati na libateli na ye litondi na bolingo.
Na esika ete ebyanga libateli ya Nzambe, lolenge wana ya kosalela nkombo ya Nzambe ezalaki mpenza mpamba, mpo ete Yehova amikɔtisaka te kati na bitumba ya bato. Ee, etumba oyo eumelaki mibu ntuku misato ekokaki kondimama te epai na Nzambe. Búku Funk & Wagnalls New Encyclopedia elobi ete: “Engebene mikanda ya kala, motuya koleka katikati ya bana mboka ya Allemagne bakufaki na boumeli ya etumba wana. Ebele ya bingumba minene, bingumba mike, bibokwelo bibwele na Allemagne ebebisamaki. Soko biteni mibale kati na misato ya bandako ya bakompanyi, ya bilanga, mpe ya mombongo ebebisamaki.”
Kosalelama ya nkombo ya Nzambe kati na misolo wana ya mabendé ezali kokundwela biso mobeko oyo epesamaki na Yisraele ete: “Okotanga nkombo ya [Yehova] Njambe na yɔ mpamba tɛ.” (Esode 20:7) Nzokande, misolo wana ya mabendé mizali litatoli ete uta kala, nkombo ya Nzambe, Yehova, eyebanaki malamu na bato ya mboka Allemagne. Oyebi malamu Nzambe oyo azali na nkombo wana?