Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 1/5 lok. 27
  • Bilenge bazali kosakola nsango malamu na Afrika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bilenge bazali kosakola nsango malamu na Afrika
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Masolo mosusu
  • “Longwa na minɔkɔ na bana”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Bana kelasi na mokili ya Nigéria bapambolami mpo na bosembo na bango
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Filipo abatisi mokonzi moko ya Letá Moetiopia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Nasala nini mpo nayokanaka malamu na molakisi na ngai?
    Mituna oyo bilenge batunaka
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 1/5 lok. 27

Masoló ya Basakoli ya Bokonzi

Bilenge bazali kosakola nsango malamu na Afrika

MWA moke nsima ya lisekwa ya Yesu, moto moko ya Afrika akendeki na Yelusaleme. Biblia epesi nkombo na ye te. Ayebani bobele lokola “moto monɛnɛ na mosala na Kandake mokonji na Baetiɔpia, mokɛngɛli na mosɔlɔ na ye yɔnsɔ.” Mpo na nini balobeli ye kati na Biblia? Mpo ete anzelu akambaki Filipo, mopalanganisi ya nsango malamu ete ayebisa ye “nsango malamu na ntina na Yesu.” Mobali wana ya Ethiopie azalaki moto ya liboso ya Afrika oyo akómaki mosangani ya lisangá ya boklisto.​—Misala 8:26-39.

Lelo oyo, bankámá ya bankóto ya Batatoli ya Yehova bazali na Afrika. Bazali kosalela mabaku nyonso mpo na kosakola nsango malamu na ntina na Yesu. Masoló oyo malandi mazali komonisa ete ata bilenge na Afrika bazali kokokisa mokumba monene kati na mosala yango.

◻ Sandy mpe Priya, bilenge basi mibale ya mbula 11 na Nairobi, na Kenya, bazalaki kofanda moko pene na mosusu. Balingaki mingi kosakana elongo mpe kopesana babúku ya masapo. Baboti ya Priya babandaki koyekola Biblia elongo na Batatoli ya Yehova. Sikawa Priya akómaki na mikanda ya sika mpo na kobakisa na mikanda na ye ya kala, elongo na mosusu oyo akómaki kosepela na yango mingi, Boyoka Moteyi monene, enyatami na Watchtower Bible and Tract Society. Azalaki kosala botángi ya búku Moteyi Monene elongo na moninga na ye Sandy, mpe bilenge basi wana babandaki koyekola pɔ́sɔ na pɔ́sɔ.

Nzokande, Una, mama ya Sandy azalaki kokende na lingomba ya Angliká mpe alingaki te ete mwana na ye ya mwasi atánga babúku ya Batatoli ya Yehova. Ata mama na ye azalaki kotɛmɛla ye, boyekoli ekóbaki. Mokolo moko Sandy abondelaki mama na ye ete áyoka ata mbala moko masoló na bango. Mokapo oyo bilenge basi wana bazalaki koyekola na mokolo yango elobaki “Mibali mibale oyo bakumisaki mikolo ya kobotama.” Una ayokaki mpe akamwaki mingi. Nokinoki akutanaki na mama ya Priya mpo na kotuna ye mituna mingi ya Biblia.

Mama ya Priya asalaki ebongiseli mpo ete Motatoli moko ayekola Biblia elongo na Una. Mosika te Una ye moko abandaki koyebisa makambo oyo ye azalaki koyekola epai na Dolly, moninga na ye ya mosala. Na ntango wana, Priya, elenge ya mbula 11 akóbaki kosala bokóli mpe azwaki ekateli ya komonisa komipesa na ye epai na Yehova Nzambe na nzela ya batisimo ya mai na liyangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova. Bobele na liyangani yango, na esengo monene ya Priya, Una mpe Dolly bazwaki mpe batisimo!

◻ Ezali na mikili misusu ya Afrika epai kuna mosala ya Batatoli ya Yehova mondimami na Leta te. Kati na moko na mikili yango, bazali kotika nzela na misala mpe bindimeli ya losambo ya Batatoli ya Yehova. Na eteyelo moko ya mokili yango, mwana mobali moko ya mbula nsambo mpe lɛki na ye ya mobali ya mbula motoba​—bana ya Batatoli​—bapesamelaki nzela ya kosangana te na mabondeli.

Mokolo mosusu, molakisi moko ya sika asɛngaki na makasi ete bana yango básangana na libondeli elongo na bana mosusu. Mwana mobali ya mokóló aboyaki mpe abɛtamaki na molakisi. Lɛki na ye, Shadrack oyo azalaki na mbula motoba, asɛngaki na makasi nyonso ete ákutana na mokambi ya eteyelo kati na biro na ye. Mokambi mpe molakisi ya sika batunaki ye mpo na nini alingaki te kosanga elongo na basusu kati na mabondeli. Batunaki ye soki azalaki kobanga ete baboti na bango bakobɛta ye. Ayanolaki na lokótá Arabe ya malamu ete: “Te, Nzambe oyo nazali kosambela azali Nzambe ya mobulu te, kasi Nzambe ya molɔngɔ́. Nakoki te kozala Motatoli ya Yehova na ndako mpe moto ya lingomba mosusu na eteyelo!” Mbano ezalaki ete bapesaki ye nzela ete ásanganaka na mabondeli te.

Nsima ya kozwa batisimo, Moetiopia oyo alobelami kati na mokanda ya Misala “akei njela na ye na esɛngɔ.” (Misala 8:39) Bobele bongo lelo, basakoli ya Bokonzi ya mokili monene ya Afrika bazali kosepela na libaku na bango ya ‘kosakola nsango malamu ya Yesu.’—Misala 8:35.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto