Masoló ya Basakoli ya Bokonzi
Bazali kosakola na eleko ya mpasi mingi
NTOMA Paulo asakolaki ete “na mikolo ya nsuka ntango na mpasi mpe ya mikakatano ekozala.” (2 Timoté 3:1, NW) Maloba oyo masili mpenza komonana solo! Kobanda kala, bato ya mboka El Salvador na Amerika ya Ntéi basili komona bosolo ya likambo wana ya mpasi. Na boumeli ya bambula koleka zomi, ekólo wana ekɔtaki kati na etumba ya banamboka oyo ememaki bobólá mpe liwa ya ebele ya nkóto ya bato. Sikawa etumba esili, kasi bobólá ezali naino. Mobulu ekólaki mingi nsima ya etumba. Kala mingi te, molobi moko na televizyó ya mboka yango alobaki ete: “Mobulu mpe koyiba biloko ya bato ezali sikawa limpa na biso ya mokolo na mokolo.”
Batatoli ya Yehova bazali mpe kokutana na makambo ya mobulu wana. Miyibi bakɔtaki kati na Bandako ya Bokonzi mingi mpe bayibaki bikóliseli-lolaka. Na mabaku mingi, bituluku ya bilenge ya mobulu bakɔtaki na makasi kati na Bandako ya Bokonzi na boumeli ya makita, mpe babɔtɔlaki mosolo, ba montres mpe biloko mosusu ya motuya epai na bayangani. Wana bazalaki kokóba na misala na bango ya mokolo na mokolo, Batatoli mosusu babomamaki na miyibi.
Atako bazali kokutana na mikakatano wana na El Salvador, Batatoli ya Yehova bazali ntango nyonso kosala makasi kati na mosala na bango ya kosakola nsango malamu. Bazali kosala yango mpo na kotosa etindá oyo ya Makomami ete: “Ekoki ete Nsango Malamu elakisama kati na mabota yɔnsɔ liboso.” (Malako 13:10) Ezali naino na bato mingi kati na mokili wana baoyo bazali koyoka mposa makasi ya elikya ya Bokonzi oyo Biblia ezali kolakisa, mpe Batatoli bazali kosala milende mpo na kokutana na moko na moko kati na bango. Litatoli ya libaku malamu lizali mwango moko oyo ezali kopesa matomba malamu kati na mosala ya kosakola.
Ntango akɔtaki na lopitalo moko mpo na komisalisa, Motatoli moko asalelaki mabaku nyonso azalaki na yango mpo na kosolola na babɛli mosusu na ntina na bilaka kitoko ya Nzambe mpo na mikolo mizali koya, lokola yango emonisami kati na Biblia. Mobɛli moko oyo azalaki na bokɔnɔ makasi alelaki na mawa nyonso ete: “Mosika te, nakokufa!” Kasi kozanga elikya ya mobɛli yango epekisaki Motatoli te na koyebisa ye nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Na esika ete ezala bongo, atángelaki mobali yango na mongongo makasi búku Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis, oyo ebimisami na Batatoli ya Yehova. Mwa mikolo na nsima, Motatoli abimaki na lopitalo, kokanisáká na mawa nyonso ete mobali yango akokufa.
Mbula minei na nsima, Motatoli yango asengelaki lisusu komisalisa na lopitalo mosusu. Ntango azalaki kuna, mobɛli moko abɛlɛmaki epai na ye mpe alobaki ete: “Ozali koyeba ngai lisusu?” Ezalaki mobali oyo akutanaki na ye esili koleka mbula minei, mobali oyo bakanisaki ete akokufa! Oyo nde likambo ya esengo ntango mobali yango ayambaki ye mpe alobaki ete: “Sikawa ngai mpe nazali Motatoli ya Yehova!” Mobali yango asilaki kondima elikya ya Biblia mpo na mikolo mizali koya, asilaki koyekola Biblia elongo na Batatoli ya Yehova, mpe asilaki kopesa bomoi na ye epai na Yehova. Azalaki bobele Motatoli te kasi azalaki lisusu kosangana kati na mosala ya kosakola lokola mobongisi-nzela ya sanza na sanza uta bambula mibale.
Na motindo yango, mbóto ya solo oyo ekónamaki na libaku malamu ekweaki kati na motema oyo eyambaki yango malamu. Libaku kitoko wana ya kosalisa bato ete bázwa boyebi ya solo ezali kopusa baklisto ya solo na kokóla kati na mosala ya kosakola atako tozali na “ntango ya mpasi mpe ya mikakatano.”