Masoló ya Basakoli ya Bokonzi
Basaleli ya Nzambe bazali komipesa na bolingo malamu
NKOMBO na ye ezalaki Yosefe, mpe abotamaki na esanga Kupulu. Azalaki moko kati na baklisto ya ekeke ya liboso oyo batekaki bilanga na bango mpe bandako na bango mpo na kopesa mabɔkɔ na makambo matali mosolo mpo na bokóli ya lisangá ya boklisto. Mpo na esengo mpe ezaleli na ye ya bokabi, akómaki na nkombo ya Balanaba, oyo elimboli “Mwana na Kolendisa.”—Misala 4:34-37.
Ezaleli wana ya komibanzabanza mpo na basusu ezali ntango nyonso elembo oyo emonisaka basambeli ya solo ya Yehova. Lelo oyo, Batatoli ya Yehova bazali mpe komonisa ezaleli yango, lokola lisoló oyo euti na bisanga Salomon emonisi yango.
Etuluku ya Batatoli koleka 60 bautaki na Australie mpe na Nouvelle-Zélande bakendeki na Honiara, mboka-mokonzi ya bisanga Salomon na Guadalcanal. Bayaki kosangana na botongi ya Ndako ya Mayangani mpo na makita minene ya boklisto. Esɛngaki bango bobele pɔ́sɔ mibale mpo na kotɛlɛmisa ndako monene oyo ezali na bifandelo 1200!
Bobele pene na eleko wana, bakonzi ya engumba moke ya Munda, na esanga Nouvelle Géorgie bapesaki lisangá ya Batatoli ya Yehova eteni ya mabelé na katikati mpenza ya engumba. Balingaki kotonga Ndako ya Bokonzi, esika ya losambo. Bazalaki mpenza na mposa na yango. Bazalaki koyangana kati na ndako moko ya matiti, kasi bazalaki na makoki te ya kotonga Ndako ya Bokonzi.a Lisangá esalemaki mingimingi na mibangé mpe bilɛ́mɛ́nɛ́ mpe bana mike, mpe ata moko te kati na bango ayebaki makambo matali kotonga bandako.
Pene na bakilomɛtɛlɛ 380, na esanga ya Guadalcanal, Batatoli oyo bazalaki na engumba Honiara bamipesaki na bolingo malamu. (Nzembo 110:3) Balobaki ete: “Soki bandeko ya biso na mikili misusu bandimaki kotongela biso Ndako ya Mayangani na boumeli ya pɔ́sɔ mibale, na bongo biso mpe tokoki kosunga bandeko na biso na Munda mpe kotongela bango Ndako ya Bokonzi na boumeli ya pɔ́sɔ mibale.”
Esalemaki bobele bongo. Mokolo moko, masuwa moko etondaki na Batatoli ya esengo mpe ya molende oyo bamipesaki na bolingo na bango moko, ekómaki na Munda. Mibali mpe basi, mibangé mpe bilenge, bango banso bamipesaki na mosala ya kokitisa biloko oyo bayaki na yango mpe bamilɛngɛlaki mpo na kobanda kotonga na mabaya, simá, manzanza, mpe biloko mosusu oyo etindamaki liboso ete bango bákóma na Munda.
Mwa moke nsima wana mosala mobandaki, nkaké makasi ebetaki mpe ekataki mai na engumba. Nzokande, yango ezalaki epekiseli te mpo na mosala. Batatoli batimolaki libulu oyo epesaki bango mai na boumeli ya mosala nyonso ya botongi. Ezalaki boni mpo na bilei ya basáli nyonso wana? Yango mpe ezalaki mokakatano te. Basáli ya bolingo malamu oyo bautaki na Honiara bayaki na biloko mingi ya kolya oyo masangá ya Hionara epesaki. Bayaki mpe na balámbi na bango moko!
Bato ya zingazinga bazalaki kotala kosalema ya mosala wana na kokamwa nyonso. Moko na bango alobaki ete: “Awa, makambo masalemaka na boumeli ya mikolo moke boye te. Ezwaka bambula mingi.” Moto mosusu ya zingazinga, ye mokonzi ya lingomba moko, andimaki ete ndakonzambe na ye ebandaki kotongama uta mibu 20 mpe ete kino lelo oyo esili naino te. Nzokande, Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova na Munda esilaki na boumeli ya mikolo zomi mpamba!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ndako ya matiti esalemi na bitongeli bizwami na esobe to na zámba. Motɔ́ndo na yango esalemi na banzeté mpe nsambá mpe bifelo na yango ezipami na bitando bisalemi na mandalala ya mbila engumbami likoló ya banzeté mpe etongami na banzeté ya vinyo.
[Karte na lokasa 24]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Mai monene ya Pacifique Sud
ÎLES SALOMON
Munda
GUADALCANAL
Honiara
[Karte]
AUSTRALIE
NOUVELLE-ZÉLANDE