Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 15/1 lok. 3
  • Bomoi ezali na motuya nini mpo na yo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bomoi ezali na motuya nini mpo na yo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Masolo mosusu
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Bazali kosɛnga lisalisi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 15/1 lok. 3

Bomoi ezali na motuya nini mpo na yo?

ELENGE mobali moko amibomaki na komibwáká longwa na eteni ya mwambe ya likoló na ndako moko molai. Atángaki búku moko oyo ezalaki kolobela lolenge ya komiboma na komibwáká longwa na likoló mpenza, ete “okonyokwama te to okozala na mpasi to na kobanga te; nkutu, okozala na maoki kitoko.” Mokomi ya búku yango, oyo ebimisamaki na Japon, alobaki ete azalaki bobele kolakisa “komiboma lokola moko na maponi ya bomoi.”

Na mikolo na biso, ezali te bobele bato oyo bazali komiboma nde bazali komonisa kozanga limemya mpo na bomoi. Bakumbi-mituka ya mobulu mpe bamonisaka limemya bobele moke mpenza mpo na bomoi. Nkutu, basusu bakumbaka motuka wana basili komela masanga, mpe mingi na bango batyaka bomoi na bato na likámá.

Basusu bamonisaka ete bazali kopesa motuya mingi te na bomoi na lolenge bapesaka ntina monene na bisengo. Bameli makaya baboyaka kotika komela likaya, atako yango ekoki komema bango na kufa mpe ebéngamaki ete komiboma malɛmbɛmalɛmbɛ. Na esika ya kobatela bopɛto ya bizaleli kati na mokili oyo esili kobeba na pite, bato mingi bazali na etamboli ya mbindo oyo mbala mingi ememaka bango na kufa.

Kozanga nkutu koyeba yango, bato mingi bazali kokitisa bambula mingi ya bomoi na bango, na kolekisáká ndelo kati na kolya mpe komela, na kozanga kosala ngalasisi, mpe na komipesáká na bisengo. Shinya Nishimaru, mokomi-babúku ya ekólo Japon akebisaki ete: “Mimesano ya kolya kolekisa ndelo ebulunganisaka kotambwisama malamu ya nzoto, mpe komipesa bobele na bomoi ya bozwi mpe ya bisengo ezali kosilisa nguya ya bato.” Basusu bazali na likanisi motindo moko na bato na kala, baoyo bazalaki koloba ete: “Toliaka mpe tomɛlaka jambi tokokufa lobi.”​—Yisaya 22:13; 1 Bakɔlinti 15:32.

Ee, kozanga limemya mpo na bomoi epalangani mingi lelo. Na yango, motuna oyo ezali mpenza na ntina mingi ete, ‘Bomoi ezali na motuya nini mpo na yo?’ Tosengeli mpenza kobatela bomoi ata na meko nini? Mpe, ezali na eloko mosusu oyo eleki bomoi oyo tozali na yango na motuya?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto