Balobaki mpo na kolóngisa bondimi
WANA ekeke oyo euti koleka ekómaki na nsuka na yango, makambo oyo bato mingi balobaki mpo na kolóngisa siansi, filozofi, mpe kolóngisa boyini ya makambo matali losambo ezalaki na bopusi mabe likoló na kondima Nzambe mpe likoló na kopemama ya Biblia.
Kasi ezalaki bobele makambo motindo wana te nde malobamaki. Balukiluki mingi bamonaki ete bakoki koloba makambo mingi mpo na kolóngisa ezaleli ya kondima Nzambe na esika ya kolóngisa liteya ya koboya kondima Nzambe. Bolukiluki na bango ebimisaki mpe bilembeteli mingi oyo emonisaki ete Biblia ezali Liloba lipemami ya Nzambe.
C. T. Russell azalaki mpe moko na bato oyo basakolaki makanisi na bango na ntina na likambo yango. Bamilió ya bato batángaki búku na ye The Divine Plan of the Ages (Mokano ya Nzambe mpo na bikeke mingi). Mokapo moko ya kolendisa kati na yango ezalaki na motó ya lisoló oyo ete, “Bilembeteli oyo bimonisi Mozalisi Monene oyo aleki na mayele.”
Na bambula mingi oyo elandaki na nsima, Russel akomaki masoló, batrakti, mpe babúku oyo emonisaki bantina ya nguya mpo na kondimela Nzambe mpe Biblia. Yango ebimisamaki na la Société Watch Tower. Prezidá na yango ya mibale, J. F. Rutherford, akomaki búku Creation (Bozalisi) na 1927 mpe mikanda misusu oyo elóngisaki lisusu likambo litali kondimela Nzambe.
Na bambula oyo, Société yango esili lisusu kobimisa mikanda oyo etondi na boyebi mingi likoló na makambo yango. Batatoli ya Yehova bazali kosɛnga na yo ete ótalela yango na ya mozindo.
Soki olingi koyeba makambo mosusu to olingi ete moto moko aya kolakisa yo Biblia kozanga kofuta mbongo, tuná Batatoli ya Yehova ya mboka oyo yo ofandi to tindá nkomá na Association “Les Témoins de Jéhovah,” B.P. 634 Limete, Kinshasa, Zaïre.
[Bililingi na lokasa 32]