Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 15/9 lok. 32
  • “Misisa oyo mikoki kopikolama te”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Misisa oyo mikoki kopikolama te”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 15/9 lok. 32

“Misisa oyo mikoki kopikolama te”

KATI na biloko oyo bizali monene koleka biloko nyonso mpe eumeli bambula mingi koleka biloko nyonso awa na mokili, ezali bongo nzeté ya séquoia ya etúká Californie. Soki ekoli, nzeté yango kitoko ekómaka na bolai ya bamɛtɛlɛ 90 mpe ekoki koumela mibu 3 000.

Atako okoki kokamwa mingi na komona nzeté ya séquoia, kasi lolenge ya misisa na yango ezali mpe kokamwisa. Kopalangana ya misisa ya nzeté ya séquoia kati na mabelé ekoki kokóma kino 1,2 to 1,6 hectare. Ebongiseli monene oyo ya misisa ezali kosala ete nzeté epikama makasi ata soki mpela to mopepe makasi eyei. Séquoia ekoki mpe kotikala ngwi ata soki koningana makasi ya mabelé esalemi!

Mokonzi Salomo aponaki ebongiseli makasi ya misisa ya nzeté moko mpo na kolobela yango na elilingi kati na moko na masese na ye. Alobaki ete: “Moto moko te akopikama libela na nzela ya mabe, kasi bato malamu bazali na misisa oyo mikoki kopikolama te.” (Masese 12:3, The New English Bible) Ee, bato mabe bakopikama libela te. Ata emonani ete bazali kolónga, ezali bobele mpo na ntango mokuse, mpamba te Yehova alaki ete “elikya na bato mabe ekobeba.”​—Masese 10:28.

Oyo ezali likebisi mpo na baoyo bazali komitánga baklisto, mpamba te Yesu alobaki ete basusu bakozala na “mosisa te” kati na bango mpe bakokwea mpenza. (Matai 13:21) Lisusu, ntoma Paulo akomaki na ntina na bato oyo “bakoninganaka mpe bakotengatenga epai na epai na mipɛpɛ yɔnsɔ [ya mateya ya lokuta, NW].” (Baefese 4:14) Lolenge nini yango ekoki kopɛngolama?

Bobele lokola misisa ya séquoia ekopalanganaka na bozindo kati na mabelé oyo ezali malamu, bobele bongo elimo mpe mitema na biso esengeli komikɔtisa mozindo kati na Liloba ya Nzambe mpe etoka longwa na yango, mai oyo ekopesaka bomoi. Yango ekosalisa biso ete tókólisa kondima oyo etóngami likoló na misisa makasi mpenza. Ya solo, tokooka bopusi ya komekama oyo ekokani na mopepe makasi. Lokola nzeté, tokoki ata mpe koningana soki mokakatano mokomeli biso. Kasi soki kondima na biso ezali mpenza mozindo, ekomonana ete tokozala na “misisa oyo mikoki kopikolama te.”​—Kokanisá na Baebele 6:19.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto