Elikya nini ezali liboso ya bilenge na biso?
LIKÁMÁ ya nikleere—ézala oyo ekoki kobimisama na babómbi ya bato ya mobulu to oyo ekoki kobimisama na baizíni ya nikleere—ezali kobangisa bato banso. Bokoki mbala mosusu kobanga mingimingi mpo na bilenge, kati na bango mpe bana na bino mpe bankɔ́kɔ na bino. Oyo nde mawa, na koyeba ete likámá ya nikleere ezali kotya kolɔngɔ́nɔ́ mpe bomoi ya bana mpo na mikolo mizali koya kati na mpasi.
Kasi bolemba te. Ezali na ntina ete ozala na makanisi malamu mpo na mikolo mizali koya na ntina na bilenge. Moboko ya elikya yango ezali te likoló na milende ya bato mpo na kobatela bilenge na biso, kasi likoló na mikolo mizali koya, oyo ezali na mabɔkɔ ya Mozalisi na biso.
Na ntango Mwana ya Nzambe, Yesu, ateyaki na Proche-Orient, amonisaki ete azalaki komibanzabanza mpo na bilenge. (Malako 9:36, 37, 42; 10:13-16) Biblia ezali komonisa ete komibanzabanza motindo wana ekomonisama ntango Nzambe akotya nsuka na likámá ya nikleere mpe akotya paladiso na mokili mobimba. Bilenge na biso bakoki kozwa matomba na yango, bino mpe bokoki kozwa yango.