Masoló ya Basakoli na Bokonzi
“Litatoli kitoko limonisi elimo ya kosalana elongo”
PENE na nsɔ́ngɛ́ oyo ezali mpenza na súdi ya Espagne, ezali na libanga moko monene oyo eyebani na nkombo ya Libanga ya Gibraltar. Na boumeli ya bikeke mingi, libanga yango ezali motatoli oyo ekolobaka te, na ntina na kowelana ya makambo ya politiki mpe kozanga boyokani ya mikili ndenge na ndenge. Nzokande, Libanga ya Gibraltar esalelamaki lokola esika ya komonisa moboko ya boyokani mpe bomoko oyo emonanaka mpenza mingi te kati na mokili lelo oyo.
Na ntaka ya 3 km kolongwa na libanga yango, tozali kokuta engumba La Línea, na Espagne. Ezali na esika yango nde misala ya botongi Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova eyanganisaki ebele ya basáli ya bolingo malamu oyo bamonisaki mposa makasi ya kopesa ntango mpe nguya na bango. Wana ezalaki bango kosala makasi mpo na kotonga esika moko ebongi mpo na losambo ya Mozalisi, Yehova Nzambe, ata nkutu moboko ya Libanga kitoko ya Gibraltar emonanaki ete ezalaki lisusu na ntina te na kokokanisáká yango na mosala ya kotonga oyo mozalaki kosalema.
Basakoli ya Bokonzi ya mboka wana batindaki sango oyo:
“Basáli ya bolingo malamu nkámá libwa bazalaki kosala butu na moi kobanda na mokolo ya mitano na nsima ya nzanga, na Septɛmbɛ 24, 1993. Pene na ngonga ya nsambo ya mokolo ya lomingo na mpokwa, elembo ya sika mpo na komonisa ete Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova esilaki kotongama mpe ndako yango ya kitoko mpe ya sika ebandaki kosalelama mpo na likita na yango ya bato banso mpe ya liboso.
“Batatoli mingi ya zingazinga ya engumba Gibraltar bakatisaki ndelo mpo na kosunga bandeko na bango na Espagne. ‘Bokabwani na makambo ya politiki ebebisaka te bondeko na biso ya mokili mobimba,’ wana ezali maloba ya moko ya basáli ya bolingo malamu, ye mobotama ya engumba Gibraltar. Abakisaki ete: ‘Esili koleka bambula ebele, Batatoli ya engumba La Línea basungaki biso mpo tótonga Ndako ya Bokonzi na biso na Gibraltar, sikawa, biso tozali na esengo kosalela bango mpe bongo.’
“Mpo na kobakisa likoló na milende minene ya masangá mibale ya Batatoli ya Yehova mpe ebele ya basungi ya makoki ya etúká ya Andalusiana, engumba ya La Línea ezwaki ekateli ya kopesa eteni ya mabelé oyo esengelaki. Na ntango ya kotala esika ya botongi, mokambi ya Engumba La Línea alobaki ete: ‘Na lolenge esalemaka banda kala, bakonzi ya Espagne bapesaka ntango nyonso eteni ya mabelé mpo na botongi ya bandako-nzambe ya Katolike. Mpo na nini te kosala mpe bongo mpo na mangomba mosusu? Nasepeli mingi na ezaleli ya kozanga moimi oyo ezali epai na basáli oyo ya bolingo malamu, mpe nabanzi ete basengeli kozwa lisungi na biso. Elimo motindo oyo ezalaka te kati na mokili na biso oyo ekabolami lelo oyo.’
“Alobaki ete Ndako ya Bokonzi ezali ‘litatoli kitoko limonisi elimo ya kosalana elongo.’ Ya solo, likambo lilekaki na kobenda likebi ezalaki te lolenge oyo ndako etongamaki, soko mpe monene ya ndako te. Kasi, eloko ebendaki likebi ya mingi kati na etúká wana ezalaki ete etongamaki bobele na basáli ya bolingo malamu mpe etongami bobele na boumeli ya bangonga 48!”
Ntembe ezali te ete, Batatoli ya Yehova na La Línea mpe bitúká na yango ya zingazinga bazali komonisa ete bazali kolanda maloba oyo mazwami na Bagalatia 6:10. Kuna, ntoma Paulo apesaki epai na baninga na ye baklisto toli oyo ete: “Sɔkɔ tojui njela, tósalela bato yɔnsɔ malamu mpe na koleka epai na bango bajali bandimi.”