Basangani na libota ya bomoko
Na mokolo ya Augústo 7, 1993, bato koleka 64 000 oyo bayanganaki na libanda ya masano Republican Stadium na engumba Kiev, na Ukraine, bosepeli na bango ezalaki sé kokóla, kino na nsuka, ntango bankotó ya bayangani bayanolaki na mongongo makasi na mituna mibale ya ntina na kolobáká, ete:“Da!” (“Ee!”). Na boye nde bayambolaki kondima na bango liboso ya bato banso mpe na nsima bamonisaki elembo ya kopesa bomoi na bango lokola likabo epai na Yehova Nzambe na kozwáká batisimo na moko na bapisíni motoba oyo etyamaki kati na libanda ya masano.—Matai 28:19.
Na mokolo wana ya misato ya Liyangani “Mateya mauti na Nzambe,” ya mikili mingi, bayangani bamonaki likambo moko ya kosepelisa mpenza: bato 7 402 bazwaki batisimo; na bongo bayaki kosangana, na Lingomba likabwani te, kasi na libota ya mokili mobimba, oyo ezali na bomoko: lisangá ya boklisto.
Soki olingi koyeba makambo mosusu mpo na oyo etali boklisto ya solo, tinda nkomá na Association “Les Témoins de Jéhovah,” B.P. 634, Kinshasa-Limete, to na moko na badresi oyo ezali na lokasa 2, soki ofandaka na Zaïre te.